Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The words of King Lemuel—an oracle his mother taught him: Maloba ya mokonzi Lemweli, mateya oyo mama na ye ateyaki ye :
2 What, my son? What, son of my womb? What, son of my vows? Eh mwana na ngai ya mobali, mwana oyo abimi na libumu na ngai, mwana mobali oyo nalapelaka ndayi :
3 Do not give your strength to women, or your ways to those who destroy kings. Kosilisa makasi na yo na basi te, komitika te na basi oyo bapengwisaka bakonzi !
4 It is not for kings, Lemuel—not for kings to drink wine, or for rulers to crave strong drink. Eh Lemweli, ebongi te mpo na bakonzi ; te, ebongi te mpo na bato minene kotuna : « Wapi masanga ya makasi ? »
5 For if they drink, they will forget what is decreed and pervert the rights of all the oppressed. Noki te soki bameli yango, bakobosana mibeko mpe bakokata na bosembo te makambo ya banyokolami.
6 Give strong drink to one who is perishing, and wine to those in bitter distress. Pesa masanga ya makasi epai ya bato oyo balingi kokufa, mpe vino epai ya bato oyo bazali kotungisama na motema.
7 Let them drink and forget their poverty, and remember their misery no more. Tika bango bamela mpo ete babosana pasi na bango mpe batika kokanisa lisusu minyoko na bango.
8 Open your mouth for the voiceless, for the rights of all who are left destitute. Fungola monoko na yo mpo na kolobela bato oyo bazali na makoki ya koloba te, mpe mpo na kolongisa bato oyo bazanga basungi.
9 Open your mouth, judge righteously, and defend the rights of the poor and needy. Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.
10 A woman of valor—who can find her? She is far more precious than jewels. Nani akoki komona mwasi ya lokumu ? Azali na motuya koleka babiju ya talo.
11 The heart of her husband trusts in her, and he will lack nothing of value. Mobali na ye atielaka ye motema mpe azangaka te biloko ya motuya.
12 She does him good and not harm, all the days of her life. Tango nyonso ya bomoi na ye, apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te ;
13 She seeks out wool and flax, and works with willing hands. alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino, bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.
14 She is like the merchant ships, bringing her food from afar. Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo, akendaka koluka bilei na ye mosika ;
15 She rises while it is still night, provides food for her household, and portions for her servant girls. alamukaka wana butu ezali nanu, abongisaka bilei mpo na ndako na ye mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.
16 She considers a field and buys it; from the fruit of her hands she plants a vineyard. Soki asepeli na elanga, asombaka yango ; mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.
17 She wraps herself in strength and makes her arms strong. Akangaka loketo na ye makasi mpe akembisaka maboko na ye na mosala.
18 She perceives that her trading is profitable; her lamp does not go out at night. Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ; mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.
19 She puts her hands to the spinning staff, and her hands grasp the spindle. Maboko na ye esimbaka mitonga oyo batongelaka, mpe misapi na ye etongaka bilamba.
20 She opens her hand to the poor and reaches out her hands to the needy. Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola, mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.
21 She has no fear for her household when it snows, for all her household are clothed in scarlet. Tango mvula ya pembe ekitaka, abangaka eloko moko te mpo na ndako na ye, pamba te bato nyonso kati na ndako na ye balataka bilamba ya malili.
22 She makes coverings for herself; her clothing is fine linen and purple. Asalaka babulangeti mpo na mbeto na ye mpe alataka bilamba na ye ya lino ya kitoko mpe ya motane.
23 Her husband is known in the gates, when he sits among the elders of the land. Bapesaka mobali na ye lokumu, na ekuke ya engumba, tango avandaka elongo na bakambi ya mokili.
24 She makes linen garments and sells them, and supplies sashes to the merchants. Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango, asalaka mombongo ya mikaba.
25 Strength and dignity are her clothing, and she laughs at the days to come. Alataka lokola elamba : molende na mosala mpe lokumu ; mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango.
26 She opens her mouth with wisdom, and faithful instruction is on her tongue. Alobaka na bwanya, mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.
27 She watches over the ways of her household and does not eat the bread of idleness. Azalaka na bokebi na makambo nyonso oyo elekaka na ndako na ye, mpe aliaka lipa na bogoyigoyi te.
28 Her children rise up and call her blessed; her husband also, and he praises her: Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye, mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye :
29 "Many daughters have done valiantly, but you surpass them all." « Basi ebele basalaka makambo ya lokumu ; kasi yo, oleki bango nyonso ! »
30 Charm is deceptive and beauty is fleeting, but a woman who reveres our Father—she will be praised. Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.
31 Give her the fruit of her hands, and let her works praise her in the gates. Bopesa ye bambuma ya misala na ye ! Tika ete bapesa ye lokumu, na bikuke ya engumba, mpo na misala nyonso oyo asalaka !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]