Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The words of Agur son of Jakeh—the oracle. The man declares: I am weary, O my Father; I am weary, O my Father, and worn out. Tala maloba ya Aguri, mwana mobali ya Yake. Ezali ye nde alobaki yango epai ya Itieli, epai ya Itieli mpe Ukali :
2 Surely I am too brutish to be a man; I do not have the understanding of a man. Solo, nazali zoba koleka bato nyonso, nazali ata na mayele ya bomoto te ;
3 I have not learned wisdom, nor do I have knowledge of the Holy One. nayekolaki bwanya te, mpe nazali na boyebi ya Mosantu te.
4 Who has ascended to heaven and come down? Who has gathered the wind in the hollow of his hands? Who has wrapped the waters in a garment? Who has established all the ends of the earth? What is his name, and what is his son's name? Surely you know! Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !
5 Every word of our Father proves true; he is a shield to those who take refuge in him. Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.
6 Do not add to his words, or he will rebuke you and prove you a liar. Kobakisa eloko moko te na maloba na Ye, noki te apamela yo mpe abimisa yo mokosi.
7 Two things I ask of you; do not withhold them from me before I die: Oh Yawe, nasengi Yo biloko mibale, kopimela ngai yango te liboso ete nakufa :
8 Keep falsehood and lies far from me; give me neither poverty nor riches; feed me only the bread that is my portion, longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai,
9 for if I am full, I may deny you and say, "Who is God?" or if I am poor, I may steal and profane the name of my God. pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
10 Do not slander a servant to his master, or he will curse you and you will be found guilty. Kotonga mowumbu te liboso ya nkolo na ye, noki te alakela yo mabe, mpe omona pasi.
11 There is a generation that curses its father and does not bless its mother. Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.
12 There is a generation clean in its own eyes yet not washed of its filth. Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.
13 There is a generation—how proud its eyes, how scornful its glances! Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.
14 There is a generation whose teeth are swords, whose fangs are knives, to devour the poor from the earth and the needy from among mankind. Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.
15 The leech has two daughters: "Give" and "Give." Three things are never satisfied; four never say, "Enough": Sonzo ezalaka na bana basi mibale, egangaka kaka : « Pesa ! Pesa ! » Ezali na biloko misato oyo etondaka te, minei oyo elobaka te : « Ekoki ! »
16 The grave, the barren womb, the land never satisfied with water, and the fire that never says, "Enough." Mboka ya bakufi, libumu ya mwasi oyo abotaka te, mabele oyo etondaka mayi te, mpe moto oyo elobaka te : « Ekoki ! »
17 The eye that mocks a father and scorns to obey a mother—the ravens of the valley will pluck it out, and the young vultures will eat it. Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.
18 Three things are too wonderful for me; four I do not understand: Ezali na biloko misato oyo nasosolaka te, ata kutu minei oyo nayebaka te :
19 the way of an eagle in the sky, the way of a serpent on a rock, the way of a ship in the heart of the sea, and the way of a man with a young woman. Nzela ya mpongo na likolo, nzela ya nyoka na likolo ya libanga, nzela ya masuwa kati na ebale, mpe nzela ya elenge mobali epai ya elenge mwasi.
20 This is the way of an adulteress: she eats and wipes her mouth and says, "I have done no wrong." Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka : Soki alie, apangusaka monoko ; mpe na sima, akoloba : « Nasali na ngai mabe te ! »
21 Under three things the earth trembles; under four it cannot bear up: Ezali na makambo misato oyo eningisaka mokili, ata kutu minei oyo mokili ekokaka kondima te :
22 a servant when he becomes king, and a fool when he is filled with food; Mowumbu oyo akomi mokonzi, zoba oyo atondi na bomengo,
23 an unloved woman when she finally marries, and a servant girl when she displaces her mistress. mwasi oyo balingaka te, kasi abali ; mpe mwasi mosali oyo azwi bomengo ya nkolo na ye ya mwasi.
24 Four things on earth are small, yet they are exceedingly wise: Ezali na banyama mike minei na mokili, oyo, nzokande, ezalaka na bwanya mingi :
25 the ants are a people not strong, yet they store up their food in the summer; Bafurmi : ezali bikelamu oyo ezanga makasi, kasi ebongisaka bilei na yango na tango ya elanga ;
26 the rock badgers are a people not mighty, yet they make their homes in the cliffs; bampanya ya zamba : ezali bikelamu oyo ezanga nguya, kasi etongaka bandako na yango kati na mabanga ;
27 the locusts have no king, yet all of them advance in ranks; mabanki : ezalaka na mokonzi te, kasi nyonso etambolaka nzela moko na molongo ;
28 the lizard you can catch in your hands, yet it is found in kings' palaces. moselekete : loboko ekoki kokanga yango, kasi ezalaka kati na bandako ya bakonzi.
29 Three things are stately in their stride; four are stately in their walk: Ezali na banyama misato oyo etambolaka malamu, ata kutu minei oyo edendaka soki ezali kotambola :
30 the lion, mightiest among beasts, which turns back before nothing; Nkosi : nyama ya makasi kati na banyama, ezongaka sima te ata liboso ya nani ;
31 the strutting rooster, the male goat, and a king whose army is with him. soso ya mobali, ntaba mobali, mpe mokonzi oyo azali kotambola liboso ya mampinga na ye.
32 If you have been foolish, exalting yourself, or if you have schemed evil, put your hand over your mouth. Soki osali bozoba mpo na komikumisa, mpe soki ozali na makanisi mabe, tia loboko na monoko na yo,
33 For pressing milk produces curds, pressing the nose produces blood, and pressing anger produces strife. pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka, kobeta zolo ebimisaka makila, mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]