Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Whoever is often corrected yet refuses to listen will suddenly be broken beyond healing. Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.
2 When the righteous flourish, the people rejoice, but when the wicked rule, the people groan. Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka ; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.
3 A man who loves wisdom brings joy to his father, but a companion of prostitutes squanders his wealth. Moto oyo alingaka bwanya asalaka esengo ya tata na ye, kasi moto oyo alandaka basi ya ndumba akosilisa bomengo na ye nyonso.
4 By justice a king gives a land stability, but one who is greedy for bribes tears it down. Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.
5 A man who flatters his neighbor spreads a net for his feet. Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.
6 An evil man is snared by his own sin, but the righteous sing and rejoice. Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo, kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.
7 The righteous care about justice for the poor, but the wicked have no such understanding. Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.
8 Mockers set a city ablaze, but the wise calm the anger. Batioli batiaka mobulu kati na engumba, kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.
9 When a wise man goes to court with a fool, the fool rages and scoffs, and there is no peace. Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma, ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.
10 The bloodthirsty hate the blameless and seek to kill the upright. Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.
11 A fool vents all his anger, but a wise man holds it back and keeps himself calm. Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
12 If a ruler listens to lies, all his officials become wicked. Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.
13 The poor man and the oppressor have this in common: our Father gives sight to the eyes of both. Mobola mpe monyokoli bazali na likambo moko ya lisanga : Yawe angengisaka miso ya bango mibale.
14 If a king judges the poor with fairness, his throne will be established forever. Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.
15 The rod and a word of correction give wisdom, but a child left to himself brings shame to his mother. Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
16 When the wicked flourish, wrongdoing flourishes, but the righteous will see the wicked's downfall. Soki bato mabe bakomi ebele, mabe mpe ekomaka ebele ; kasi bato ya sembo bakomona bango kokweya.
17 Discipline your son, and he will give you peace; he will bring delight to your heart. Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
18 Where there is no revelation, the people run wild, but blessed is the one who keeps the law. Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko !
19 A servant cannot be corrected by words alone; though he understands, he will not obey. Bapamelaka mosali na maloba te ; pamba te akososola, kasi akoyoka te.
20 Do you see a man who is hasty with his words? There is more hope for a fool than for him. Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
21 Pamper a servant from childhood, and in the end he will become like an heir. Moto oyo alengelaka mosali na ye wuta bolenge akosuka na kokomisa ye moto makasi.
22 An angry man stirs up strife, and a hot-tempered man commits many sins. Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
23 A man's pride brings him low, but a humble spirit gains honor. Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.
24 An accomplice of a thief is his own enemy; he hears the curse but says nothing. Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka ; ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.
25 Fear of man lays a snare, but whoever trusts in our Father is kept safe. Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
26 Many seek a ruler's favor, but justice for a person comes from our Father. Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi, nzokande ezali Yawe nde apesaka oyo ekoki na moto na moto.
27 An unjust man is detestable to the righteous, and an upright person is detestable to the wicked. Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu, mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]