Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The wicked flee when no one pursues, but the righteous are as bold as a lion. Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.
2 When a land rebels, it has many rulers, but with a man of understanding and knowledge, it stays stable. Soki kotomboka ezali kati na mokili, bakonzi bakomaka ebele ; kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia.
3 A poor man who oppresses the helpless is like a driving rain that leaves no food. Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.
4 Those who forsake the law praise the wicked, but those who keep the law strive against them. Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.
5 Evil people do not understand justice, but those who seek our Father understand it fully. Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo, kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.
6 Better is a poor man who walks with integrity than a rich man crooked in his ways. Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.
7 Whoever keeps the law is a son with understanding, but a companion of gluttons shames his father. Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele, kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge ayokisaka tata na ye soni.
8 Whoever multiplies his wealth by interest and unjust gain gathers it for one who is generous to the poor. Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.
9 If anyone refuses to listen to the law, even his prayer is detestable. Moto oyo akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka mobeko, libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.
10 Whoever leads the upright astray down an evil path will fall into his own pit, but the blameless will inherit good things. Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabe akokangama na motambo oyo asali ye moko, kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango.
11 A rich man is wise in his own eyes, but a poor man with understanding sees right through him. Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu.
12 When the righteous triumph, there is great glory, but when the wicked rise, people go into hiding. Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi ; kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka.
13 Whoever conceals his sins will not prosper, but whoever confesses and turns from them will find mercy. Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
14 Blessed is the one who always remains reverent, but whoever hardens his heart will fall into calamity. Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe, kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.
15 Like a roaring lion or a charging bear is a wicked ruler over a helpless people. Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.
16 A ruler who lacks understanding is a cruel oppressor, but whoever hates unjust gain will prolong his days. Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele, kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibi ayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele.
17 A man weighed down by the guilt of bloodshed will be a fugitive until death; let no one support him. Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga akimaka kino na libulu ya kufa ; tika ete moto moko te akanga ye nzela.
18 Whoever walks in integrity will be kept safe, but whoever is crooked in his ways will suddenly fall. Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko, kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale akokweya na moko.
19 Whoever works his land will have plenty of bread, but whoever chases empty pursuits will have plenty of poverty. Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi akotonda na bobola.
20 A faithful man will abound with blessings, but whoever rushes to get rich will not go unpunished. Moto ya sembo afulukaka na mapamboli, kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu akozanga te kozwa etumbu.
21 Showing partiality is not good, yet for a piece of bread a man will do wrong. Kopona bilongi ezalaka malamu te ; nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe.
22 A stingy man rushes after wealth and does not know that poverty will overtake him. Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.
23 Whoever rebukes a man will in the end find more favor than one who flatters with his tongue. Moto oyo apamelaka moninga na ye akozwa ngolu na suka koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.
24 Whoever robs his father or mother and says, "It is no sin," is a companion to one who destroys. Moto oyo ayibaka tata mpe mama na ye, bongo alobaka : « Ezali na yango mabe te, » azali moninga ya mobomi.
25 A greedy man stirs up strife, but whoever trusts in our Father will be enriched. Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.
26 Whoever trusts in his own heart is a fool, but whoever walks in wisdom will be kept safe. Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.
27 Whoever gives to the poor will lack nothing, but whoever closes his eyes to them will receive many curses. Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.
28 When the wicked rise, people go into hiding, but when they perish, the righteous flourish. Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka ; kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]