Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Do not boast about tomorrow, for you do not know what a day may bring. Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
2 Let someone else praise you, and not your own mouth; a stranger, and not your own lips. Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
3 A stone is heavy and the sand a burden, but a fool's provocation is heavier than both. Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.
4 Wrath is cruel and anger is overwhelming, but who can stand before jealousy? Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?
5 Open rebuke is better than love that stays hidden. Pamela oyo epesami na polele ezali malamu koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
6 A friend's wounds are faithful, but an enemy's kisses are deceitful. Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
7 A well-fed person tramples honeycomb, but to the hungry even what is bitter tastes sweet. Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.
8 A man who strays from his home is like a bird that strays from its nest. Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga mosika ya zala na yango.
9 Oil and incense gladden the heart, and the sweetness of a friend comes from heartfelt counsel. Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.
10 Do not forsake your friend or your father's friend, and do not go to your brother's house when disaster strikes; better a neighbor nearby than a brother far off. Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
11 Be wise, my son, and make my heart glad, so that I can answer anyone who taunts me. Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.
12 The prudent sees danger and takes cover, but the simple keep going and pay the price. Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.
13 Take the garment of one who puts up security for a stranger; hold it as collateral when he does so for a foreign woman. Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
14 Whoever blesses his neighbor with a loud voice early in the morning, it will be taken as a curse. Soki moto moko ayei kopambola molingami na ye, na mongongo makasi mpe na tongo-tongo, bakozwa yango lokola elakeli mabe.
15 A quarrelsome wife is like a constant dripping on a rainy day. Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.
16 Restraining her is like restraining the wind, or grasping oil with the right hand. Kokanga ye ezali lokola koluka kokanga mopepe to mafuta na loboko.
17 Iron sharpens iron, and one person sharpens another. Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu, ndenge wana mpe moto abongaka soki akutani na moto mosusu.
18 Whoever tends a fig tree will eat its fruit, and whoever guards his master will be honored. Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi aliaka mpe mbuma na yango, mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.
19 As water reflects the face, so the heart reflects the person. Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi, ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.
20 The grave and Destruction are never satisfied, and a person's eyes are never satisfied. Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te.
21 The crucible is for silver and the furnace for gold, and a person is tested by the praise he receives. Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi bamekaka moto na nzela ya lokumu na ye.
22 Though you grind a fool in a mortar with a pestle, along with the grain, his foolishness will not leave him. Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
23 Know well the condition of your flocks, and give careful attention to your herds. Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,
24 For riches do not last forever, nor does a crown endure to every generation. pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela.
25 When the grass is gone and the new growth appears and the mountain herbs are gathered, Soki bakati matiti ya bibwele, matiti ya sika ekobota mpe bakolokota matiti ya bangomba ;
26 the lambs will provide your clothing, and the goats will provide the price of a field; bameme ekopesa yo bilamba, mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga.
27 and there will be enough goats' milk for your food, for the food of your household and to sustain your servant girls. Okozala na miliki ebele ya bantaba mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]