Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Like snow in summer and like rain at harvest, honor is not fitting for a fool. Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge, mpe mvula enokaka te na tango ya elanga, ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.
2 Like a fluttering sparrow or a darting swallow, an undeserved curse does not come to rest. Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.
3 A whip for the horse, a bridle for the donkey, and a rod for the backs of fools. Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda, mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane, ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.
4 Do not answer a fool according to his foolishness, or you yourself will be like him. Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye, noki te okokokana na ye.
5 Answer a fool according to his foolishness, or he will be wise in his own eyes. Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.
6 Whoever sends a message through a fool cuts off his own feet and drinks down violence. Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba azali lokola moto oyo amikati makolo mpe amilukeli makambo.
7 Like the legs of a lame man hanging useless is a proverb in the mouth of fools. Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te, ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te kati na monoko ya zoba.
8 Like binding a stone in a sling is giving honor to a fool. Kopesa zoba lokumu ezali lokola kotia libanga na ebambelo mabanga.
9 Like a thornbush in the hand of a drunkard is a proverb in the mouth of fools. Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzube kati na loboko ya moto oyo alangwe masanga.
10 Like an archer who wounds everyone is one who hires a fool or hires any passerby. Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.
11 As a dog returns to its vomit, so a fool repeats his foolishness. Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
12 Do you see someone wise in his own eyes? There is more hope for a fool than for him. Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
13 The lazy person says, "There is a lion in the road! A lion in the streets!" Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela ! Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! »
14 As a door turns on its hinges, so the lazy person turns on his bed. Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.
15 The lazy person buries his hand in the dish; it wearies him to bring it back to his mouth. Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko.
16 The lazy person is wiser in his own eyes than seven who answer wisely. Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya koleka bato sambo ya mayele.
17 Like grabbing a dog by the ears is a passerby who meddles in a quarrel not his own. Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.
18 Like a madman shooting firebrands, arrows, and death, Ndenge moto ya liboma abwakaka moto, makonga mpe kufa,
19 so is the one who deceives his neighbor and says, "I was only joking!" ndenge wana mpe moto oyo akosi moninga na ye alobaka : « Ezalaki kaka mpo na kosala maseki ! »
20 Without wood a fire goes out, and without a gossip a quarrel dies down. Soki bakoni ezali te, moto ekokufa ; soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita.
21 As charcoal to embers and wood to fire, so a quarrelsome person kindles strife. Ndenge makala engalaka na mbabola, mpe bakoni epelisaka moto, ndenge wana mpe moto oyo alinga koswana ayeisaka matata.
22 The words of a gossip are like choice morsels; they sink down into the inmost parts. Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
23 Like a glaze covering an earthen pot are smooth lips with an evil heart. Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli na mbeki basala na mabele.
24 An enemy disguises himself with his lips, but in his heart he harbors deceit. Moto oyo ayinaka moninga na ye amibombaka na maloba na ye, kasi atondi na lokuta kati na motema na ye.
25 When he speaks graciously, do not believe him, for seven abominations fill his heart. Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te, pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama kati na motema na ye.
26 Though his hatred is hidden by deceit, his wickedness will be exposed in the assembly. Akoki solo kobomba makanisi na ye ya mabe na maloba ya lokuta, kasi motema mabe na ye ekosuka se na koyebana na miso ya bato nyonso.
27 Whoever digs a pit will fall into it, and a stone rolls back on the one who rolls it. Moto oyo atimolaka libulu akweyaka ye moko kati na yango ; mpe moto oyo atindikaka libanga, libanga yango ekozongela kaka ye moko.
28 A lying tongue hates those it crushes, and a flattering mouth works ruin. Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi, mpe maloba ya sukali ememaka libebi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]