Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 26 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Moto ya zoba

1Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge,mpe mvula enokaka te na tango ya elanga,ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.

2Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwanoekendaka bipai na bipaito mbilambila epumbwaka-pumbwaka,ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka temoto oyo asali na ye mabe te.

3Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda,mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane,ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.

4Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye,noki te okokokana na ye.

5Zongisela zoba kolanda bozoba na ye,noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.

6Moto oyo atindaka sango na nzela ya zobaazali lokola moto oyo amikati makolompe amilukeli makambo.

7Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te,ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya tekati na monoko ya zoba.

8Kopesa zoba lokumu ezalilokola kotia libanga na ebambelo mabanga.

9Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzubekati na loboko ya moto oyo alangwe masanga.

10Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosalaazali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.

11Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi,ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.

12Eleki malamu kotia elikya na zoba,na esika ete otia elikya na motooyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.

13Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela !Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! »

14Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na yendenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.

15Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei,kasi akokaka te kozongisa yango na monoko.

16Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanyakoleka bato sambo ya mayele.

17Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye teazali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.

18Ndenge moto ya liboma abwakakamoto, makonga mpe kufa,

19ndenge wana mpe moto oyo akosi moninga na yealobaka : « Ezalaki kaka mpo na kosala maseki ! »

20Soki bakoni ezali te, moto ekokufa ;soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita.

21Ndenge makala engalaka na mbabola,mpe bakoni epelisaka moto,ndenge wana mpe moto oyo alinga koswanaayeisaka matata.

22Maloba ya moto ya songisongi ezalakalokola bilei ya kitoko,ekitaka na esengo kino na libumu.

23Maloba ya sukali ya moto ya motema mabeezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakolina mbeki basala na mabele.

24Moto oyo ayinaka moninga na yeamibombaka na maloba na ye,kasi atondi na lokuta kati na motema na ye.

25Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te,pamba te makambo sambo ya mbindo ebombamakati na motema na ye.

26Akoki solo kobomba makanisi na ye ya mabena maloba ya lokuta,kasi motema mabe na ye ekosuka se na koyebanana miso ya bato nyonso.

27Moto oyo atimolaka libuluakweyaka ye moko kati na yango ;mpe moto oyo atindikaka libanga,libanga yango ekozongela kaka ye moko.

28Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi,mpe maloba ya sukali ememaka libebi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]