Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 25 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These also are proverbs of Solomon, which the men of Hezekiah king of Judah copied out. Tala masese mosusu ya Salomo oyo bato ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, bakomaki.
2 It is the glory of our Father to conceal a matter, but the glory of kings to search a matter out. Nzambe azwaka nkembo mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te, mpe bakonzi bazwaka nkembo mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.
3 As the heavens are high and the earth is deep, so the heart of kings is unsearchable. Ndenge bakokaka te komeka bosanda ya Lola to bozindo ya mabele, ndenge wana mpe bakoki te kososola mitema ya bakonzi.
4 Take away the dross from the silver, and a vessel comes forth for the refiner. Soki olongoli mbindo na palata, ekobimisa mbeki mpo na monyangwisi bibende na moto.
5 Take away the wicked from before the king, and his throne will be established in righteousness. Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.
6 Do not put yourself forward in the king's presence, and do not stand in the place of the great; Komikumisaka te liboso ya mokonzi, mpe komivandisaka te na esika ya bato minene ;
7 for it is better to be told, "Come up here," than to be put in a lower place in front of a noble you can see. pamba te eleki malamu ete baloba na yo : « Yaka kovanda na esika oyo ya lokumu, » na esika ete bayokisa yo soni na miso ya mokonzi.
8 Do not rush into a quarrel, for what will you do in the end when your neighbor puts you to shame? Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo ?
9 Argue your case with your neighbor himself, but do not disclose another's secret, Soki ozali kowelana na moninga na yo, kobimisa sekele ya moto mosusu te,
10 lest the one who hears it shame you, and your bad reputation never goes away. noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni, boye okosambwa mpo na libela.
11 A word spoken at the right moment is like apples of gold in settings of silver. Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.
12 Like a ring of gold or an ornament of fine gold is wise correction to a listening ear. Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
13 Like the cold of snow in the time of harvest is a faithful messenger to those who send him; he refreshes the soul of his masters. Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.
14 Like clouds and wind without rain is one who boasts of a gift never given. Moto oyo amikumisaka ete akabaka, nzokande apesaka na ye eloko te, azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.
15 By patience a ruler is persuaded, and a soft tongue breaks bone. Moto oyo akangaka motema akoki kobongola makanisi ya mokonzi, mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.
16 If you find honey, eat only enough, or you will have too much and vomit. Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo, pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.
17 Don't visit your neighbor's house too often, or he will grow weary of you and hate you. Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo, noki te akotonda yo mpe akolemba yo.
18 Like a club, a sword, and a sharp arrow is one who bears false witness against his neighbor. Moto oyo apesaka matatoli ya lokuta mpo na kosala moninga na ye mabe azali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.
19 Like a bad tooth or a foot out of joint is trust in a faithless person in time of trouble. Kotia elikya na zoba na tango na pasi ezali lokola lino ebukani mpe lokolo elembi.
20 Like one who takes off a garment on a cold day, like vinegar poured on baking soda, is the one who sings songs to a heavy heart. Koyembela moto oyo azali na mawa banzembo ya esengo ezali lokola kolongola ye kazaka na tango ya malili to kotia masanga ya ngayi na pota.
21 If your enemy is hungry, give him bread to eat, and if he is thirsty, give him water to drink; Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
22 for you will heap coals of fire on his head, and our Father will reward you. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye, mpe Yawe akofuta yo.
23 The north wind brings forth rain, and a secretive tongue, angry looks. Mopepe oyo ewutaka na ngambo ya nor, ebetisaka mvula, mpe lolemo oyo etongaka ekomisaka bilongi kanda-kanda.
24 It is better to live in a corner of the rooftop than in a shared house with a quarrelsome wife. Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
25 Like cold water to a weary soul is good news from a distant land. Basango ya malamu oyo ewuti na mokili ya mosika ezali lokola mayi ya pio kati na motema ya moto oyo azali na posa ya mayi.
26 Like a muddied spring or a polluted fountain is a righteous person who gives way before the wicked. Moto ya sembo oyo asopanaka liboso ya moto mabe azali lokola liziba ya potopoto mpe etima oyo ebimisaka mayi ya mabe.
27 It is not good to eat too much honey, nor to seek your own glory. Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.
28 Like a city broken into and left without walls is a person who has no control over his own spirit. Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]