Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Do not envy evil men, and do not desire to be with them, Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,
2 for their hearts plot violence, and their lips speak of trouble. pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.
3 By wisdom a house is built, and by understanding it is established; Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele.
4 and by knowledge its rooms are filled with all precious and pleasant riches. Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi.
5 A wise man is full of strength, and a man of knowledge increases his power, Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye.
6 for by wise guidance you can wage your war, and victory comes through many counselors. Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.
7 Wisdom is too high for a fool; at the gate, he has nothing to say. Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba, yango wana azalaka te na likambo ya koloba kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.
8 Whoever plans to do evil will be called a schemer. Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.
9 A fool's scheming is sin, and the scoffer is detestable to people. Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.
10 If you falter in a time of trouble, your strength is small. Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.
11 Rescue those being taken away to death, and hold back those stumbling toward the slaughter. Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa, mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa lokola bato oyo balangwe masanga.
12 If you say, "Look, we did not know this," does not he who weighs the heart perceive it? Does not he who watches over your soul know it? And will he not repay each person according to his deeds? Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?
13 My son, eat honey, for it is good, and the honeycomb's drippings are sweet to your taste. Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko ! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.
14 Know that wisdom is just like this to your soul; if you find it, there is a future, and your hope will not be cut off. Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi mpo na molimo na yo ; soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu, mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
15 Do not lie in wait, you wicked man, against the home of the righteous; do not destroy his resting place, Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo kati na ndako ya moto ya sembo, mpe komeka te kopanza yango,
16 for though the righteous falls seven times, he rises again, but the wicked stumble in disaster. pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka ; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.
17 Do not rejoice when your enemy falls, and do not let your heart be glad when he stumbles, Soki monguna na yo akweyi, kosepela te ; mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te ;
18 lest our Father see it and be displeased, and turn his anger away from him. noki te Yawe akomona, akosepela te mpe akokitisela yo kanda na Ye.
19 Do not fret because of evildoers, and do not envy the wicked, Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe, kolula te bato mabe ;
20 for the evil man has no future; the lamp of the wicked will be snuffed out. pamba te lobi ya malamu ekozala te mpo na moto oyo asalaka mabe, mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.
21 My son, fear our Father and the king, and do not join with those who rebel against them, Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi, kosanganaka te na batomboki,
22 for their disaster will rise suddenly, and who knows the ruin that both of them can bring? pamba te bango mibale bakoki kotindela batomboki pasi na pwasa. Bongo, nani ayebi pasi oyo bakoki kotinda ?
23 These also are sayings of the wise: Showing partiality in judgment is not good. Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.
24 Whoever says to the guilty, "You are innocent," peoples will curse him and nations will denounce him, Moto oyo alobaka na moto mabe : « Ozali moto ya sembo, » bato bakolakela ye mabe, mpe bikolo ekotombokela ye.
25 but it will go well for those who convict the guilty, and a rich blessing will come upon them. Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamu mpe lipamboli ekozala likolo na bango.
26 An honest answer is like a kiss on the lips. Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
27 Prepare your work outside, get your fields ready, and after that build your house. Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.
28 Do not be a witness against your neighbor without cause; would you deceive with your lips? Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?
29 Do not say, "I will do to him as he did to me; I will pay the man back for what he has done." Kolobaka te : « Nakosala ye ndenge asali ngai, nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »
30 I passed by the field of a lazy man, by the vineyard of someone lacking sense, Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele ;
31 and there it was, all overgrown with thorns; the ground was covered with weeds, and its stone wall was broken down. bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.
32 Then I looked and took it to heart; I saw and received instruction. Tango natiaki makanisi na ngai kati na makambo oyo namonaki, nazwaki mayele oyo :
33 A little sleep, a little slumber, a little folding of the hands to rest, mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,
34 and poverty will come upon you like a robber, and scarcity like an armed man. bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]