Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When you sit down to dine with a ruler, consider carefully what is before you, Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi, tala malamu moto oyo azali liboso na yo.
2 and put a knife to your throat if you are a person ruled by appetite. Tia mbeli na mongongo na yo soki ozalaka lokoso.
3 Do not crave his delicacies, for they are deceptive food. Kolula te bilei na ye ya kitoko, pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo.
4 Do not wear yourself out to get rich; have the wisdom to restrain yourself. Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango.
5 The moment you look at wealth, it is gone, for it suddenly sprouts wings and flies off toward the heavens like an eagle. Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.
6 Do not eat the bread of a stingy man, and do not crave his delicacies, Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe mpe kolula te bilei na ye ya kitoko,
7 for he is the kind of man who keeps counting the cost. "Eat and drink!" he says to you, but his heart is not with you. pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka : « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.
8 You will vomit up the little you have eaten and will have wasted your pleasant words. Okosanza eteni oyo oliaki, mpe maloba na yo ya kitoko ekokende pamba.
9 Do not speak in the hearing of a fool, for he will despise the wisdom of your words. Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.
10 Do not move an ancient boundary stone or encroach on the fields of the fatherless, Kozongisa te na sima mondelo ya kala mpe kokota te na bilanga ya bana bitike,
11 for their Redeemer is strong; our Father will take up their cause against you. pamba te Molobeli na bango azalaka makasi, akozwa makambo na bango na maboko mpo na kotelemela yo.
12 Apply your heart to instruction and your ears to words of knowledge. Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko, mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi !
13 Do not withhold discipline from a child; if you strike him with the rod, he will not die. Kozangisa te kopesa mwana etumbu ; soki obeti ye fimbu, akokufa te.
14 Strike him with the rod, and you will deliver his soul from the grave. Na kobeta ye fimbu, okokangola molimo na ye na lifelo.
15 My son, if your heart is wise, my own heart will be glad as well. Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekozala na esengo.
16 My inmost being will rejoice when your lips speak what is right. Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo, soki bibebu na yo elobi makambo ya sembo.
17 Do not let your heart envy sinners, but continue in the fear of our Father all day long. Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;
18 Surely there is a future, and your hope will not be cut off. pamba te suka na yo ekozala solo malamu mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
19 Hear, my son, and be wise, and keep your heart on the right road. Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo.
20 Do not be among those who get drunk on wine or those who gorge themselves on meat, Kozala esika moko te na balangwi masanga to na bato ya lokoso,
21 for the drunkard and the glutton will come to poverty, and drowsiness will clothe them in rags. pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola, mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka.
22 Listen to your father, who gave you life, and do not despise your mother when she is old. Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
23 Buy truth and do not sell it; buy wisdom, instruction, and understanding. Luka bosolo, kasi koteka yango te ; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.
24 The father of a righteous child will greatly rejoice; whoever fathers a wise son will delight in him. Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi, mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
25 Let your father and mother be glad; let her who gave you birth rejoice. Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela ! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo !
26 My son, give me your heart, and let your eyes delight in my ways. Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !
27 For a prostitute is a deep pit, and an adulterous woman is a narrow well. Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene, mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo.
28 She lies in wait like a robber and leads many men into faithlessness. Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi mpe akomisaka mibali bazoba koleka.
29 Who has misery? Who has sorrow? Who has strife? Who has complaints? Who has wounds for no reason? Who has bleary eyes? Mpo na nani : « Ah ngai, mawa ! » Mpo na nani : « Eh ! » Mpo na nani koswanaswana ? Mpo na nani kolelalela ? Mpo na nani kowelana ezanga tina ? Mpo na nani kotelisa miso ?
30 Those who linger long over wine, those who go to sample bowls of mixed wine. Mpo na bato oyo bawumelaka liboso ya masanga ya vino, mpo na bato oyo bamelaka masanga ya makasi.
31 Do not gaze at wine while it is red, while it sparkles in the cup and goes down smoothly. Kotalaka te masanga ya vino tango ezali motane, tango ezali kongala kati na kopo mpe kokita na pete na mongongo.
32 In the end it bites like a serpent and stings like a viper. Na suka na yango, ekoswa yo lokola nyoka mpe ekotia yo minu lokola etupa.
33 Your eyes will see strange things, and your heart will utter twisted things. Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.
34 You will be like one lying down in the heart of the sea, like one lying on the top of a ship's mast. Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene, mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi.
35 "They struck me, but I felt no pain; they beat me, but I did not know it. When will I wake up? I will look for another drink." Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te ! Tango nini nakolamuka ? Nakozongela lisusu komela vino. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]