Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A good name is to be chosen rather than great riches, and favor is better than silver or gold. Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi ; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.
2 The rich and the poor meet together; our Father is the Maker of them all. Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga : ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.
3 The prudent sees danger and takes cover, but the simple keep going and pay the price. Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.
4 The reward for humility and the fear of our Father is riches and honor and life. Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.
5 Thorns and snares lie in the path of the crooked; whoever guards his soul stays far from them. Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.
6 Train up a child in the way he should go, and even when he is old he will not depart from it. Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
7 The rich rules over the poor, and the borrower is slave to the lender. Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.
8 Whoever sows injustice will reap calamity, and the rod of his fury will fail. Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.
9 Whoever has a generous eye will be blessed, for he shares his bread with the poor. Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.
10 Drive out the scoffer, and strife goes with him; quarreling and abuse will cease. Bengana motioli, bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.
11 Whoever loves a pure heart and speaks graciously will have the king as his friend. Moto oyo alingaka kozala peto na motema, oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye, mokonzi azalaka molingami na ye.
12 The eyes of our Father keep watch over knowledge, but he overturns the words of the traitor. Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.
13 The lazy person says, "There is a lion outside! I will be killed in the streets!" Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
14 The mouth of forbidden women is a deep pit; whoever draws our Father's anger will fall into it. Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.
15 Foolishness is bound up in the heart of a child, but the rod of discipline drives it far away. Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
16 Whoever oppresses the poor to enrich himself, or gives to the rich, will come only to poverty. Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.
17 Listen carefully to the words of the wise, and apply your heart to my knowledge, Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.
18 for it will be pleasant if you keep them within you, if all of them are ready on your lips. Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.
19 So that your trust may be in our Father, I have made them known to you today, even to you. Nateyi yo yango lelo mpo ete elikya na yo ezala kati na Yawe.
20 Have I not written for you thirty sayings of counsel and knowledge, Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,
21 to teach you what is right and true, so that you may give a true answer to those who sent you? batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo ?
22 Do not rob the poor because he is poor, or crush the afflicted at the gate, Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo,
23 for our Father will plead their cause and will rob of life those who rob them. pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.
24 Do not befriend a man given to anger, and do not go with a hot-tempered man, Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,
25 or you will learn his ways and entangle yourself in a snare. noki te okoyekola nzela na ye mpe okokangama na motambo na ye.
26 Do not be one of those who give pledges, who put up security for debts. Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu,
27 If you have nothing to pay with, why should your bed be taken from under you? pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala ?
28 Do not move the ancient boundary stone that your fathers set up. Kozongisa na sima te mondelo ya kala oyo batata na yo bakataki.
29 Do you see a man skillful in his work? He will stand before kings; he will not stand before ordinary men. Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu ? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]