Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The king's heart is a stream of water in our Father's hand; he turns it wherever he pleases. Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.
2 Every way of a person seems right in their own eyes, but our Father weighs the heart. Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
3 To do what is right and just is more pleasing to our Father than sacrifice. Na miso na Yawe, kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya koleka bambeka ya kotumba.
4 Haughty eyes and a proud heart—the lamp of the wicked—are sin. Miso ya lofundu, motema ya lolendo mpe kongenga ya bato mabe ezali masumu.
5 The plans of the diligent lead surely to abundance, but all who are hasty end up in poverty. Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.
6 Making a fortune by a lying tongue is a fleeting vapor, a deadly trap. Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.
7 The violence of the wicked will drag them away, because they refuse to do what is just. Makambo ya bato mabe ebebisaka bango moko, pamba te baboyaka kosala makambo ya sembo.
8 The way of the guilty is crooked, but the conduct of the pure is upright. Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku, kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.
9 Better to live in a corner of the roof than in a shared house with a quarrelsome wife. Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
10 The soul of the wicked craves evil; their neighbor finds no mercy in their eyes. Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ; ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.
11 When a mocker is punished, the simple grow wise; when the wise are instructed, they gain knowledge. Tango bapesaka motioli etumbu, zoba akomaka moto ya bwanya ; mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya, azwaka solo boyebi.
12 Our Father, the Righteous One, observes the house of the wicked and brings the wicked to ruin. Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe, mpe akweyisaka bango kati na pasi.
13 Whoever shuts their ears to the cry of the poor will also cry out and not be answered. Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.
14 A gift given in secret soothes anger, and a bribe slipped into the cloak calms strong wrath. Likabo oyo bapesi na nkuku ekitisaka kanda, mpe kado oyo batie na tolo ekitisaka kanda makasi.
15 When justice is done, it is a joy to the righteous but terror to those who do evil. Ezali esengo mpo na moyengebene kosambisa makambo na sembo, kasi yango ezali pasi makasi mpo na bato oyo basalaka mabe.
16 A person who strays from the way of understanding will rest in the assembly of the dead. Moto oyo abungi nzela ya bwanya akovanda kati na lisanga ya bakufi.
17 Whoever loves pleasure will become poor; whoever loves wine and oil will never grow rich. Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola ; moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafuta akotikala kokoma mozwi te.
18 The wicked become a ransom for the righteous, and the treacherous for the upright. Moto mabe azalaka lokola motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya sembo ; moto ya sembo te azalaka lokola motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya alima.
19 Better to live in a desert land than with a quarrelsome and complaining wife. Kovanda kati na esobe ezali malamu koleka kovanda esika moko na mwasi oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
20 Precious treasure and oil are in the home of the wise, but a fool devours all he has. Bilei ya kitoko mpe mafuta ezalaka kati na ndako ya moto ya bwanya, kasi moto oyo azangi mayele abebisaka yango.
21 Whoever pursues righteousness and faithful love will find life, righteousness, and honor. Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
22 A wise person scales the city of the mighty and brings down the stronghold they trust in. Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi, mpe akweyisaka bandako ya makasi oyo bato batielaka mitema.
23 Whoever guards their mouth and tongue keeps themselves out of trouble. Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.
24 "Mocker" is the name of the proud and arrogant who acts with outrageous insolence. Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. » Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.
25 The craving of a lazy person kills him, for his hands refuse to work. Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.
26 All day long the craving grows, but the righteous give and do not hold back. Mokolo mobimba, akufaka na ye kaka na baposa makasi ; kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.
27 The sacrifice of the wicked is detestable—how much more when brought with evil intent. Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.
28 A false witness will perish, but whoever listens will testify with lasting effect. Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.
29 The wicked put on a bold face, but the upright give thought to their ways. Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.
30 There is no wisdom, no understanding, no counsel that can stand against our Father. Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.
31 The horse is made ready for the day of battle, but victory belongs to our Father. Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba, kasi elonga ewutaka na Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]