Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Wine is a mocker, strong drink a brawler, and whoever staggers under it is not wise. Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.
2 The terror of a king is like the growl of a lion; whoever provokes him to anger forfeits his own life. Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.
3 It is an honor for a person to keep clear of strife, but every fool is quick to quarrel. Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.
4 A lazy person will not plow in autumn; so at harvest he looks for a crop and finds nothing. Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.
5 The purposes of a person's heart are deep waters, but one who has understanding draws them out. Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.
6 Many a person proclaims his own loyal love, but a faithful one—who can find? Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo ?
7 The righteous walk in their integrity; blessed are their children after them! Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
8 A king seated on the throne of judgment winnows out all evil with his eyes. Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.
9 Who can say, "I have kept my heart pure; I am cleansed from my sin"? Nani akoki koloba : « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te ? »
10 Unequal weights and unequal measures—our Father detests them both. Kilo mibale mpe bimekelo mibale, nyonso ezali nkele na miso ya Yawe.
11 Even a child is known by his actions, by whether his conduct is pure and upright. Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.
12 The hearing ear and the seeing eye—our Father made them both. Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.
13 Do not love sleep, or you will grow poor; open your eyes, and you will have plenty of bread. Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.
14 "Worthless, worthless!" says the buyer—then off he goes and boasts of his bargain. Moto oyo asombaka biloko alobaka : « Biloko oyo ezali mabe ! Ezali malamu te ! » Kasi soki akei, atombolaka mapeka mpo na biloko oyo azwi.
15 There is gold and an abundance of jewels, but lips that speak knowledge are a rare treasure. Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.
16 Take the garment of one who puts up security for a stranger; hold it as a pledge when he does so for foreigners. Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
17 Bread gained by deceit tastes sweet, but afterward the mouth is full of gravel. Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.
18 Plans are established by counsel; so wage war only with wise guidance. Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.
19 A gossip betrays a confidence; so do not keep company with a babbler. Moto ya bilobaloba abimisaka basekele ; yango wana kima bato oyo balobaka mingi.
20 Whoever curses his father or mother—his lamp will be snuffed out in deepest darkness. Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.
21 An inheritance gained too quickly at the start will not be blessed in the end. Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.
22 Do not say, "I will pay back evil for evil." Wait for our Father, and he will deliver you. Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.
23 Our Father detests unequal weights, and dishonest scales are no good. Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te.
24 A person's steps are directed by our Father; how then can anyone understand his own way? Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto ; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye ?
25 It is a trap to rashly dedicate something and only later reconsider the vow. Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu : « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.
26 A wise king winnows out the wicked and drives the threshing wheel over them. Mokonzi ya bwanya abenganaka bato mabe mpe azangaka te kopesa bango etumbu.
27 The human spirit is the lamp of our Father, searching every inmost part. Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye ; esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto.
28 Loyal love and faithfulness preserve a king; by loyal love his throne is upheld. Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi ; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.
29 The glory of the young is their strength, but the splendor of the old is gray hair. Makasi ezali biju ya bilenge, mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.
30 Wounding blows scrub away evil, and beatings cleanse the inmost parts. Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]