Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Better is a poor person who walks in his integrity than one whose words are crooked and is a fool. Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele.
2 Also, desire without knowledge is not good, and whoever acts in haste misses the way. Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.
3 A person's own foolishness ruins his way, yet his heart rages against our Father. Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye ; mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.
4 Wealth adds many friends, but the poor is separated from his friend. Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema.
5 A false witness will not go unpunished, and one who breathes out lies will not escape. Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
6 Many seek the favor of a generous person, and everyone is a friend to one who gives gifts. Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu, mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto oyo asungaka bato.
7 All the brothers of a poor person hate him; how much more do his friends keep far from him! He calls after them, but they are gone. Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te ? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.
8 Whoever gets wisdom loves his own soul; whoever guards understanding will find good. Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ; moto oyo alingaka mayele alongaka.
9 A false witness will not go unpunished, and one who breathes out lies will perish. Motatoli ya lokuta azwaka etumbu ; moto oyo akosaka akobebisama.
10 Luxury is not fitting for a fool—much less for a servant to rule over princes. Bomoi ya lokumu ebongi na zoba te ; ebongi mpe te na mowumbu kopesa mitindo na bakambi.
11 The good sense of a person makes him slow to anger, and it is his glory to overlook an offense. Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi ; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.
12 A king's wrath is like the roaring of a lion, but his favor is like dew on the grass. Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.
13 A foolish son is ruin to his father, and a wife's quarreling is a continual dripping. Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.
14 House and wealth are an inheritance from one's ancestors, but a prudent wife is from our Father. Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
15 Laziness casts into deep sleep, and an idle person will go hungry. Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
16 Whoever keeps the commandment keeps his life; whoever despises his ways will die. Moto oyo atosaka mibeko abatelaka molimo na ye ; moto oyo akebaka te na etamboli na ye akokufa.
17 Whoever is generous to the poor lends to our Father, and our Father will repay him for his deed. Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
18 Discipline your son while there is hope, and do not set your heart on his destruction. Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
19 A person of great wrath must pay the penalty; for if you rescue him, you will only have to do it again. Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye ; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.
20 Listen to counsel and accept discipline, that you may gain wisdom in the days to come. Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.
21 Many are the plans in a person's heart, but it is the counsel of our Father that will stand. Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
22 What is desired in a person is covenant love, and a poor person is better than a liar. Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi.
23 The fear of our Father leads to life, and whoever has it rests satisfied, untouched by harm. Kotosa Yawe ememaka na bomoi, esalaka ete moto azala na kimia ; boye ata mabe moko te ekokomela ye.
24 The sluggard buries his hand in the dish and will not even bring it back to his mouth. Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.
25 Strike a mocker, and the simple will learn prudence; reprove a person of understanding, and he will gain knowledge. Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
26 Whoever does violence to his father and drives away his mother is a son who brings shame and disgrace. Mwana oyo abetaka tata na ye mpe abenganaka mama na ye ayeisaka soni mpe mawa.
27 Stop listening to instruction, my son, and you will stray from the words of knowledge. Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya, okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
28 A worthless witness mocks at justice, and the mouth of the wicked gulps down wickedness. Moto oyo atiolaka bosembo azali motatoli ya zoba ; mpe monoko ya bato mabe emelaka kaka mabe.
29 Punishment is prepared for mockers, and beatings for the backs of fools. Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]