Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Whoever isolates himself pursues his own desire; he lashes out against all sound wisdom. Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye, atelemelaka bososoli nyonso.
2 A fool takes no pleasure in understanding, but only in airing his own opinions. Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
3 When wickedness comes, contempt comes too, and with dishonor comes reproach. Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ; soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.
4 The words of a person's mouth are deep waters; the fountain of wisdom is a flowing stream. Maloba ya monoko ya moto ezalaka lokola mayi ya mozindo ; etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale oyo etondi makasi.
5 It is not good to show partiality to the wicked, denying justice to the righteous. Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.
6 A fool's lips bring strife, and his mouth invites a beating. Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
7 A fool's mouth is his ruin, and his lips are a snare to his soul. Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.
8 The words of a gossip are like choice morsels; they go down into the inmost being. Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
9 Whoever is slack in his work is brother to one who destroys. Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.
10 The name of our Father is a strong tower; the righteous runs into it and is safe. Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.
11 A rich man's wealth is his fortified city; in his imagination it is like a high wall. Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi ; akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.
12 Before destruction the human heart is proud, but humility comes before honor. Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
13 If one answers before he listens, it is his foolishness and his shame. Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
14 A person's spirit can sustain him through sickness, but a crushed spirit—who can bear it? Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?
15 The discerning heart acquires knowledge, and the ear of the wise seeks it out. Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.
16 A person's gift opens the way for him and brings him before important people. Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.
17 The first to state his case seems right, until another comes and examines him. Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi ; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.
18 Casting the lot settles disputes and separates strong opponents. Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
19 An offended brother is harder to win than a fortified city, and disputes are like the bars of a fortress. Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
20 From the fruit of a person's mouth his stomach is satisfied; with the yield of his lips he is filled. Moto atondisaka libumu na ye na nzela ya mbuma ya monoko na ye mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
21 Death and life are in the power of the tongue, and those who love it will eat its fruit. Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
22 He who finds a wife finds what is good and receives favor from our Father. Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
23 The poor person pleads for mercy, but the rich answers harshly. Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.
24 A man of many companions may come to ruin, but there is a friend who sticks closer than a brother. Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]