Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 18 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

1Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye,atelemelaka bososoli nyonso.

2Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwatango ya kokanisa,kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.

3Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ;soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.

4Maloba ya monoko ya moto ezalakalokola mayi ya mozindo ;etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebaleoyo etondi makasi.

5Ezali malamu te kolongisa moto mabempe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.

6Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana,mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.

7Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa,mpe bibebu na ye ezalaka motambompo na molimo na ye moko.

8Maloba ya moto ya songisongi ezalakalokola bilei ya kitoko,ekitaka na esengo kino na libumu.

9Moto oyo azongaka sima na mosala na yeazali ndeko ya mobebisi.

10Kombo ya Yawe ezalilokola ndako molayi batonga makasi ;moyengebene akimelaka kunampe azwaka ebombamelo ya makasi.

11Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,oyo batonga makasi ;akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.

12Liboso ete moto akweya,motema na ye ekomaka na lolendo ;kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

13Kopesa eyano liboso ya koyokaezali liboma mpe bozoba.

14Kimia kati na motema elendisaka motona tango ya bokono,kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?

15Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele,mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.

16Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzelampe ekotisaka ye liboso ya bato minene.

17Moto ya liboso na kosamba amonanakalokola nde alongi ;kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei,akotelemela ye.

18Zeke esilisaka koswanampe ekataka makambo kati na bato ya makasi.

19Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabeezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ;mpe koswana na moto ezali lokola kokangabikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.

20Moto atondisaka libumu na yena nzela ya mbuma ya monoko na yempe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.

21Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ;moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.

22Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

23Mobola alobaka na mongongo ya kobondela,kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.

24Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi,kasi ezali na molingami moko ya motema,oyo aleki ata ndeko.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]