Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Better a dry crust eaten in peace than a house full of feasting with strife. Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.
2 A prudent servant will rule over a disgraceful son and will share the inheritance among the brothers. Mosali ya bwanya akozala na bokonzi likolo ya mwana mobali oyo asalaka soni, mpe akozwa libula elongo na bandeko.
3 The crucible is for silver and the furnace for gold, but our Father tests hearts. Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
4 An evildoer listens to wicked lips; a liar listens to a destructive tongue. Moto oyo asalaka mabe ayokaka maloba ya bato mabe, mokosi apesaka litoyi na ye na maloba ya lokuta.
5 Whoever mocks the poor insults his Maker; whoever gloats over disaster will not go unpunished. Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango ; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.
6 Grandchildren are the crown of the aged, and the glory of children is their parents. Bakitani bazali motole ya bakoko, mpe baboti bazali lokumu ya bana.
7 Fine speech is not fitting for a fool—still less are lying lips for a noble. Ndenge maloba ya lokumu ebongi te mpo na moto mabe, ndenge mpe maloba ya lokuta ebongi te mpo na mokonzi.
8 A bribe seems like a magic charm to the one who gives it; wherever he turns, he thinks he will succeed. Kanyaka ezalaka lokola kisi na miso ya moto oyo azali na yango ; alongaka na esika nyonso oyo akendaka.
9 Whoever covers an offense seeks love, but whoever keeps bringing it up separates close friends. Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.
10 A rebuke goes deeper into a person of understanding than one hundred blows into a fool. Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.
11 A rebellious man seeks only evil, and a cruel messenger will be sent against him. Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.
12 Better to meet a bear robbed of her cubs than a fool in his foolishness. Kokutana na ngombolo oyo babotoli bana ezali malamu koleka kokutana na zoba oyo azali kati na bolema.
13 If anyone returns evil for good, evil will never leave his house. Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto oyo azongisaka mabe mpo na malamu.
14 Starting a quarrel is like breaching a dam, so drop the dispute before it bursts out. Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.
15 Whoever justifies the wicked and whoever condemns the righteous—both alike are detestable to our Father. Moto oyo alongisaka bato mabe mpe moto oyo akweyisaka bato ya sembo bazali, bango mibale, nkele na miso ya Yawe.
16 Why should a fool have money in hand to buy wisdom, when he has no heart to learn? Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !
17 A friend loves at all times, and a brother is born for a time of trouble. Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.
18 One who lacks sense shakes hands on a pledge and puts up security for his neighbor. Moto oyo azangi mayele abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya.
19 Whoever loves wrongdoing loves strife; whoever builds his gate high invites destruction. Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu ; moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo amilukelaka kokweya.
20 A crooked heart finds no good, and a twisted tongue falls into trouble. Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.
21 Whoever fathers a fool brings grief on himself; the father of a godless fool has no joy. Kozala na mwana ya zoba esalaka pasi na motema, mpe tata ya moto ya liboma akotikala kozala na esengo te.
22 A joyful heart is good medicine, but a crushed spirit dries up the bones. Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.
23 A wicked man takes a bribe in secret to pervert the ways of justice. Moto mabe azwaka kanyaka na nkuku mpo na kobebisa nzela ya bosembo.
24 A discerning person keeps wisdom in view, but the eyes of a fool wander to the ends of the earth. Bwanya emonanaka na elongi ya moto ya mayele, kasi miso ya zoba ekendaka kino na suka ya mokili.
25 A foolish son is a grief to his father and bitterness to the mother who bore him. Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
26 To punish the righteous is not good, nor to flog the noble for their integrity. Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu, mpe ezali malamu te kobeta bato ya lokumu na miso ya bosembo.
27 Whoever holds back his words has knowledge, and one with a calm spirit is a person of understanding. Moto oyo abatelaka monoko na ye azali na boyebi ; moto oyo alengaka-lengaka te azali mayele.
28 Even a fool who keeps silent is thought wise; when he closes his lips, he seems discerning. Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia, amonanaka lokola moto ya bwanya ; moto oyo akangaka monoko na ye amonanaka lokola moto ya mayele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]