Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The plans of the heart belong to man, but the answer of the tongue comes from our Father. Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.
2 All a man's ways are pure in his own eyes, but our Father weighs the motives. Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.
3 Commit your works to our Father, and your plans will be established. Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama.
4 Our Father has made everything for its purpose, even the wicked for the day of trouble. Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
5 Everyone proud of heart is detestable to our Father; be assured, he will not go unpunished. Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ; solo, akozanga te kozwa etumbu.
6 Loving devotion and faithfulness atone for sin, and the fear of our Father turns a person away from evil. Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
7 When a man's ways please our Father, our Father makes even the man's enemies live at peace with him. Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.
8 Better a little with righteousness than great income with injustice. Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.
9 The heart of man plans his way, but our Father establishes his steps. Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.
10 A divine verdict is on the lips of a king; his mouth does not betray justice. Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe, ekweyaka te kati na kosambisama.
11 Honest scales and balances belong to our Father; every weight and measure is his work. Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.
12 It is detestable for kings to do wickedness, for a throne is established through righteousness. Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.
13 Righteous lips are the delight of kings, and they love the one who speaks what is right. Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.
14 A king's wrath is a messenger of death, but a wise man will appease it. Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.
15 In the light of a king's face is life, and his favor is like a cloud bringing the spring rain. Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga, elingi koloba : bomoi. Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka.
16 How much better to get wisdom than gold! Getting understanding is worth more than silver. Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
17 The highway of the upright turns away from evil; whoever guards his way protects his life. Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.
18 Pride goes before destruction, and a haughty spirit before a fall. Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
19 Better to be lowly in spirit among the poor than to share the plunder with the proud. Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.
20 Whoever heeds the word will find good, and blessed is the one who trusts in our Father. Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.
21 The wise of heart is called discerning, and pleasant speech increases persuasiveness. Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.
22 Understanding is a fountain of life to the one who has it, but fools are corrected by their own foolishness. Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
23 The heart of the wise makes his speech wise and adds persuasiveness to his lips. Motema ya moto ya bwanya ekomisaka monoko na ye mayele, mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi.
24 Pleasant words are a honeycomb, sweet to the soul and healing to the bones. Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
25 There is a way that seems right to a man, but its end is the way of death. Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
26 A worker's appetite works for him; his hunger drives him on. Nzala etindaka mosali ete asala mosala, monoko na ye etindikaka ye na mosala.
27 A worthless man digs up evil, and on his lips is a scorching fire. Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.
28 A perverse man spreads strife, and a gossip separates close friends. Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.
29 A violent man entices his neighbor and leads him down a harmful path. Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.
30 Whoever winks his eyes plots perversity; whoever purses his lips is bent on evil. Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu.
31 Gray hair is a crown of glory; it is gained in the way of righteousness. Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ; bazwaka yango na nzela ya bosembo.
32 Better a patient person than a mighty one, and one who rules his spirit than one who takes a city. Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.
33 The lot is cast into the lap, but its every decision is from our Father. Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]