Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A gentle answer turns away wrath, but a harsh word stirs up anger. Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
2 The tongue of the wise commends knowledge, but the mouths of fools pour out foolishness. Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.
3 The eyes of our Father are in every place, keeping watch on the evil and the good. Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.
4 A gentle tongue is a tree of life, but a corrupt tongue crushes the spirit. Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
5 A fool despises his father's instruction, but whoever heeds correction is prudent. Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
6 In the house of the righteous there is much treasure, but the income of the wicked brings trouble. Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
7 The lips of the wise spread knowledge, but not so the hearts of fools. Bibebu ya moto ya bwanya esopaka boyebi, kasi ezali bongo te na motema ya zoba.
8 The sacrifice of the wicked is detestable to our Father, but the prayer of the upright is his delight. Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
9 The way of the wicked is detestable to our Father, but he loves the one who pursues righteousness. Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.
10 There is severe discipline for the one who leaves the path, and whoever hates correction will die. Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo akozwa pamela ya makasi ; moto oyo aboyaka pamela akokufa.
11 The grave and Destruction lie open before our Father; how much more the hearts of all people! Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye.
12 A scoffer does not love to be corrected; he will not go to the wise. Moto ya moto makasi alingaka te moto oyo apamelaka ye, yango wana akendaka te epai ya bato ya bwanya.
13 A glad heart makes a cheerful face, but a sorrowful heart crushes the spirit. Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.
14 A discerning heart seeks knowledge, but the mouths of fools feed on foolishness. Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.
15 All the days of the afflicted are hard, but a cheerful heart has a continual feast. Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.
16 Better a little with the fear of our Father than great treasure and trouble with it. Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
17 Better a meal of vegetables where there is love than a fattened ox with hatred. Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.
18 A hot-tempered man stirs up strife, but one who is slow to anger calms a quarrel. Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
19 The way of the lazy is like a hedge of thorns, but the path of the upright is a level highway. Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
20 A wise son makes a glad father, but a foolish man despises his mother. Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
21 Foolishness is joy to one who lacks sense, but a person of understanding walks a straight path. Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
22 Plans fail without counsel, but with many advisers they succeed. Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
23 A person finds joy in giving an apt reply, and how good is a word at the right time! Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
24 The path of life leads upward for the prudent, turning him away from the grave below. Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.
25 Our Father tears down the house of the proud, but he protects the widow's boundary. Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.
26 The thoughts of the wicked are detestable to our Father, but gracious words are pure. Makanisi ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi maloba ya malamu ezalaka peto na miso na Ye.
27 Whoever is greedy for unjust gain brings trouble on his own household, but the one who hates bribes will live. Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te amemaka mitungisi na libota na ye, kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
28 The heart of the righteous weighs how to answer, but the mouth of the wicked pours out evil. Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
29 Our Father is far from the wicked, but he hears the prayer of the righteous. Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
30 The light of the eyes brings joy to the heart, and good news refreshes the bones. Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.
31 The ear that listens to life-giving correction will dwell among the wise. Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.
32 Whoever ignores instruction despises himself, but whoever listens to correction gains understanding. Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.
33 The fear of our Father is the instruction of wisdom, and humility comes before honor. Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]