Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The wisest of women builds her house, but foolishness tears hers down with her own hands. Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
2 Whoever walks in uprightness fears our Father, but one whose ways are crooked despises him. Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.
3 A fool's mouth is a rod for his own pride, but the lips of the wise protect them. Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele, ezalaka na nzete ya lolendo, kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.
4 Where there are no oxen, the manger stays clean, but an abundant harvest comes through the strength of an ox. Esika oyo ezalaka na ngombe te, elielo mpe ezalaka na eloko te, pamba te ezali makasi ya bangombe nde epesaka bomengo.
5 A faithful witness does not lie, but a false witness breathes out lies. Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
6 The scoffer seeks wisdom and finds none, but knowledge comes easily to the discerning. Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.
7 Stay away from a fool, for you will find no knowledge on his lips. Zala mosika ya zoba, pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.
8 The wisdom of the prudent is to discern their way, but the foolishness of fools is deceit. Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele : lokuta.
9 Fools mock the guilt offering, but among the upright there is favor. Bazoba balingaka te kosenga bolimbisi, kasi ngolu na Nzambe ezalaka kati na bato ya sembo.
10 The heart knows its own bitterness, and no stranger shares in its joy. Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.
11 The house of the wicked will be destroyed, but the tent of the upright will flourish. Ndako ya moto mabe ekobukana, kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.
12 There is a way that seems right to a person, but its end is the way of death. Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
13 Even in laughter the heart may ache, and the end of joy may be grief. Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa, mpe esengo ekoki kosuka na mawa.
14 The backslider in heart will be filled with the fruit of his ways, and a good person with the fruit of his. Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.
15 The simple believe anything, but the prudent give thought to their steps. Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.
16 The wise fear and turn away from evil, but a fool is reckless and overconfident. Moto ya bwanya abangaka mabe mpe akimaka yango, kasi zoba atombokaka, na elikya nyonso.
17 A quick-tempered person acts foolishly, and one who plots evil schemes is hated. Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.
18 The simple inherit foolishness, but the prudent are crowned with knowledge. Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula, kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.
19 The evil bow down before the good, and the wicked at the gates of the righteous. Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu, bato ya mitema mabe bakofukama na ekuke ya bato ya sembo.
20 The poor are shunned even by their neighbors, but the rich have many friends. Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele.
21 Whoever despises his neighbor sins, but blessed is the one who is kind to the poor. Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.
22 Do not those who plot evil go astray? But covenant love and faithfulness belong to those who plan good. Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.
23 In all hard work there is profit, but mere talk leads only to poverty. Mosala nyonso epesaka litomba, kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.
24 The crown of the wise is their wealth, but the foolishness of fools yields only foolishness. Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma.
25 A truthful witness saves lives, but one who breathes out lies is treacherous. Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
26 In the fear of our Father is strong confidence, and his children will have a refuge. Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.
27 The fear of our Father is a fountain of life, turning a person away from the snares of death. Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
28 A large population is a king's glory, but without people a prince is ruined. Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.
29 Whoever is slow to anger has great understanding, but a hot temper exalts foolishness. Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
30 A tranquil heart gives life to the body, but envy rots the bones. Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.
31 Whoever oppresses the poor reproaches our Father, their Maker, but whoever is kind to the needy honors him. Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.
32 The wicked are brought down by their own evil, but the righteous find refuge even in death. Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
33 Wisdom rests in the heart of the discerning, but even among fools it makes itself known. Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli ; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba ?
34 Righteousness exalts a nation, but sin is a disgrace to any people. Bosembo etombolaka ekolo, kasi lisumu ememelaka bato soni.
35 A king's favor rests on a wise servant, but his wrath falls on one who acts shamefully. Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya, kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]