Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A wise son heeds his father's instruction, but a scoffer does not listen to rebuke. Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
2 From the fruit of his mouth a person enjoys good things, but the appetite of the treacherous is for violence. Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.
3 Whoever guards his mouth protects his life, but one who opens his lips wide comes to ruin. Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
4 The lazy person craves and gets nothing, but the appetite of the diligent is richly satisfied. Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
5 The righteous hates falsehood, but the wicked brings shame and disgrace. Moto ya sembo ayinaka maloba ya lokuta, kasi moto mabe amiyinisaka mpe apanzaka soni.
6 Righteousness guards the one whose way is blameless, but wickedness overthrows the sinner. Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.
7 One person pretends to be rich, yet has nothing; another pretends to be poor, yet has great wealth. Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.
8 A person's wealth may ransom his life, but the poor hears no threat. Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te.
9 The light of the righteous shines joyfully, but the lamp of the wicked will be snuffed out. Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.
10 Arrogance breeds nothing but strife, but wisdom is with those who seek advice. Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.
11 Wealth gained by fraud dwindles away, but whoever gathers little by little makes it grow. Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.
12 Hope deferred makes the heart sick, but desire fulfilled is a tree of life. Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.
13 Whoever despises the word brings ruin on himself, but the one who reveres the commandment will be rewarded. Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.
14 The teaching of the wise is a fountain of life, turning a person away from the snares of death. Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
15 Good sense wins favor, but the way of the treacherous is their undoing. Boyebi ememelaka bato ngolu, kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi.
16 Every prudent person acts with knowledge, but a fool flaunts his foolishness. Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.
17 A wicked messenger falls into trouble, but a faithful envoy brings healing. Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.
18 Poverty and shame come to whoever ignores discipline, but the one who heeds correction is honored. Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
19 A desire fulfilled is sweet to the soul, but turning away from evil is detestable to fools. Posa oyo ekokisami esalaka esengo na motema, kasi kokabwana na mabe ezali likambo ya nkele na miso ya zoba.
20 Whoever walks with the wise grows wise, but the companion of fools suffers harm. Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
21 Disaster pursues sinners, but good rewards the righteous. Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.
22 A good person leaves an inheritance to his grandchildren, but the sinner's wealth is stored up for the righteous. Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.
23 The unplowed field of the poor could yield abundant food, but it is swept away for lack of justice. Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo.
24 Whoever withholds the rod hates his son, but the one who loves him is diligent to discipline him. Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
25 The righteous eats to his heart's content, but the belly of the wicked goes hungry. Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]