Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Whoever loves discipline loves knowledge, but whoever hates correction is senseless. Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.
2 A good man obtains favor from our Father, but he condemns the man who schemes evil. Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.
3 No one is established by wickedness, but the root of the righteous will never be moved. Motema mabe elendisaka moto te ; mosisa ya bato ya sembo ekatanaka te.
4 A wife of noble character is her husband's crown, but one who brings shame is like decay in his bones. Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.
5 The plans of the righteous are just, but the advice of the wicked is deceitful. Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.
6 The words of the wicked lie in wait for blood, but the speech of the upright rescues the innocent. Maloba ya bato mabe ezali mitambo mpo na kosopa makila, kasi maloba ya bayengebene ebikisaka bango.
7 The wicked are overthrown and are no more, but the house of the righteous will stand. Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.
8 A person is praised according to their good sense, but one with a warped mind is despised. Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.
9 Better to be lowly and have a servant than to pretend to greatness and go hungry. Eleki malamu kozala moto pamba mpe kozala na mosali, na esika ya komimona moto monene mpe kozanga bilei.
10 The righteous care for the needs of their animals, but even the mercy of the wicked is cruel. Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.
11 Whoever works their land will have plenty of food, but whoever chases worthless pursuits lacks sense. Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.
12 The wicked crave the plunder of evil men, but the root of the righteous yields fruit. Moto mabe alingaka misuni ya bato mabe, kasi mosisa ya bayengebene ebotaka mingi.
13 An evil man is trapped by his sinful talk, but the righteous escapes from trouble. Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.
14 From the fruit of their words a person is filled with good things, and the work of their hands comes back to reward them. Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.
15 The way of a fool seems right in his own eyes, but the wise listen to advice. Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.
16 A fool shows his anger at once, but the prudent overlook an insult. Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.
17 Whoever speaks the truth gives honest testimony, but a false witness tells lies. Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo, kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta.
18 Reckless words pierce like a sword, but the tongue of the wise brings healing. Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.
19 Truthful lips endure forever, but a lying tongue lasts only a moment. Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.
20 Deceit fills the hearts of those who plot evil, but joy belongs to those who promote peace. Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato oyo basalaka mabongisi ya mabe, kasi esengo ezali mpo na bato oyo bakopesaka batoli ya kimia.
21 No harm overtakes the righteous, but the wicked are full of trouble. Mabe moko te ekokomela bayengebene, kasi bato mabe bakotondisama na pasi.
22 Lying lips are detestable to our Father, but those who act faithfully are his delight. Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye.
23 The prudent keep their knowledge to themselves, but the heart of fools blurts out foolishness. Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.
24 Diligent hands will rule, but laziness ends in forced labor. Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.
25 Anxiety weighs down the heart, but a kind word cheers it up. Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
26 The righteous guide their neighbor, but the way of the wicked leads them astray. Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.
27 The lazy do not roast their game, but the diligent prize their possessions. Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.
28 In the path of righteousness there is life, and along that way there is no death. Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]