Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Dishonest scales are an abomination to our Father, but accurate weights are his delight. Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.
2 When pride comes, then comes disgrace, but wisdom comes with the humble. Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.
3 The integrity of the upright guides them, but the crookedness of the treacherous destroys them. Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.
4 Wealth does not profit in the day of wrath, but righteousness delivers from death. Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.
5 The righteousness of the blameless makes their way straight, but the wicked falls by his own wickedness. Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.
6 The righteousness of the upright delivers them, but the treacherous are trapped by their own craving. Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango.
7 When a wicked person dies, his hope perishes, and his confidence in his own strength comes to nothing. Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi.
8 The righteous is delivered from trouble, and the wicked comes into it in his place. Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo.
9 With his mouth the godless destroys his neighbor, but through knowledge the righteous are delivered. Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.
10 When things go well for the righteous, the city rejoices, and when the wicked perish, there are shouts of joy. Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka ; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.
11 By the blessing of the upright a city is exalted, but by the mouth of the wicked it is torn down. Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.
12 Whoever despises his neighbor lacks sense, but a person of understanding stays silent. Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia.
13 A gossip goes about revealing secrets, but someone with a trustworthy spirit can keep a secret. Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.
14 Where there is no guidance, a people falls, but in an abundance of counselors there is safety. Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.
15 Whoever puts up security for a stranger will surely suffer for it, but whoever hates shaking hands on a pledge is secure. Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia.
16 A gracious woman attains honor, and ruthless men attain riches. Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.
17 A kind person benefits himself, but a cruel person brings trouble on himself. Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi.
18 The wicked earns deceptive wages, but whoever sows righteousness earns a true reward. Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga.
19 Whoever is steadfast in righteousness finds life, but whoever pursues evil runs to his own death. Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa.
20 Those of crooked heart are an abomination to our Father, but those whose ways are blameless are his delight. Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye.
21 You can be sure the evil person will not go unpunished, but the children of the righteous will go free. Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
22 Like a gold ring in a pig's snout is a beautiful woman who shows no discretion. Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu.
23 The desire of the righteous ends only in good, but the hope of the wicked ends in wrath. Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu, nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kaka kanda ya Nzambe.
24 One person gives freely, yet grows all the richer; another withholds what is right, only to end up in need. Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola.
25 A generous soul will be enriched, and whoever refreshes others will himself be refreshed. Moto oyo akabaka akokoma na bomengo ; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi.
26 The people curse whoever holds back grain, but the one who sells it is blessed. Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe ; kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango.
27 Whoever diligently seeks good seeks favor, but whoever searches for evil, evil will come to him. Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe.
28 Whoever trusts in his riches will fall, but the righteous will flourish like green leaves. Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika.
29 Whoever brings trouble on his own household will inherit the wind, and the fool will be servant to the wise of heart. Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya.
30 The fruit of the righteous is a tree of life, and whoever wins souls is wise. Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.
31 If the righteous is repaid on earth, how much more the wicked and the sinner! Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]