Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The proverbs of Solomon: A wise son brings joy to his father, but a foolish son brings grief to his mother. Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.
2 Treasures gained by wickedness do not profit, but righteousness rescues from death. Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe epesaka litomba te, kasi bosembo ekangolaka na kufa.
3 Our Father will not let the righteous go hungry, but he thwarts the craving of the wicked. Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala, kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa.
4 Lazy hands make you poor, but diligent hands bring wealth. Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.
5 He who gathers in summer is a prudent son, but he who sleeps during harvest is a son who brings shame. Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.
6 Blessings rest on the head of the righteous, but the mouth of the wicked conceals violence. Mapamboli ezali na likolo ya moto ya moto ya sembo lokola motole, kasi monoko ya moto mabe ebombaka bitumba.
7 The memory of the righteous is a blessing, but the name of the wicked will rot. Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.
8 A wise heart accepts commands, but a babbling fool comes to ruin. Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.
9 Whoever walks in integrity walks securely, but he who makes his ways crooked will be found out. Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.
10 Whoever winks causes trouble, and a babbling fool comes to ruin. Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu, kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia.
11 The mouth of the righteous is a fountain of life, but the mouth of the wicked conceals violence. Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
12 Hatred stirs up conflict, but love covers all offenses. Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
13 On the lips of the discerning, wisdom is found, but a rod is for the back of one who lacks sense. Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya, kasi fimbu ezali malamu mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele.
14 The wise store up knowledge, but the mouth of a fool invites ruin. Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
15 The wealth of the rich is their fortified city; the ruin of the poor is their poverty. Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango.
16 The wage of the righteous leads to life; the gain of the wicked leads to sin. Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi, kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu.
17 Whoever accepts discipline is on the path to life, but he who ignores correction leads others astray. Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi, kasi moto oyo ayokaka pamela te apengwisaka bato mosusu.
18 Whoever conceals hatred is a liar, and whoever spreads slander is a fool. Moto oyo abombaka koyina kati na motema na ye azali na bibebu ya lokuta, mpe moto oyo atongaka bato azali zoba.
19 Where words are many, sin is never absent; but whoever holds his tongue is wise. Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
20 The tongue of the righteous is choice silver; the heart of the wicked is worth little. Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te.
21 The lips of the righteous nourish many, but fools die for lack of sense. Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele, kasi zoba akokufa na bozoba na ye.
22 The blessing of our Father brings wealth, and he adds no sorrow with it. Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.
23 Doing wickedness is a game to a fool, but wisdom is the delight of a person of understanding. Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele.
24 What the wicked dreads will come upon him, but the desire of the righteous will be granted. Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.
25 When the storm has passed, the wicked are gone, but the righteous are established forever. Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela.
26 Like vinegar to the teeth and smoke to the eyes, so is the sluggard to those who send him. Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi, mpe molinga esalaka miso pasi, ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka epai ya bato oyo batindaka ye pasi.
27 The fear of our Father lengthens life, but the years of the wicked will be cut short. Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.
28 The hope of the righteous brings joy, but the expectation of the wicked will perish. Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.
29 The way of our Father is a refuge for the blameless, but ruin for those who do evil. Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.
30 The righteous will never be shaken, but the wicked will not remain in the land. Moto ya sembo akotikala kokweya te, kasi bato mabe bakovanda na mokili te.
31 The mouth of the righteous yields wisdom, but the perverse tongue will be cut off. Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya, kasi lolemo ya lokuta ekokatama.
32 The lips of the righteous know what is acceptable, but the mouth of the wicked, only what is perverse. Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]