Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Wisdom has built her house; she has hewn out her seven pillars. Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo ;
2 She has slaughtered her animals; she has mixed her wine; she has also set her table. abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino mpe, na sima, atandi mesa.
3 She has sent out her young women to call from the highest places of the town: Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba :
4 "Whoever is simple, let him come in here!" To the one who lacks sense she says, « Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa ! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli :
5 "Come, eat my bread and drink the wine I have mixed. « Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli,
6 Leave your simple ways, and live; walk in the way of insight." botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »
7 Whoever corrects a mocker brings abuse on himself, and whoever rebukes a wicked man gets hurt. Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.
8 Do not rebuke a mocker, or he will hate you; rebuke a wise man, and he will love you. Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.
9 Instruct a wise man and he will grow wiser; teach a righteous man and he will learn even more. Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.
10 The fear of our Father is the beginning of wisdom, and the knowledge of the Holy One is insight. Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.
11 For by me your days will be multiplied, and years will be added to your life. Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
12 If you are wise, you are wise for yourself; if you scoff, you alone will bear it. Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko ; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.
13 The woman Folly is loud; she is naive and knows nothing. Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,
14 She sits at the door of her house, on a seat at the highest places of the town, avandaka na ekuke ya ndako na ye, atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba,
15 calling to those who pass by, who are going straight on their way: mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.
16 "Whoever is simple, let him come in here!" And to the one who lacks sense she says, Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa ! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli :
17 "Stolen water is sweet, and bread eaten in secret is pleasant." « Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »
18 But he does not know that the dead are there, that her guests are in the depths of the grave. Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]