Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Does not Wisdom call out, and understanding raise her voice? Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ?
2 Atop the heights along the way, where the paths meet, she takes her stand. Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela, na bisika oyo banzela ekutana,
3 Beside the gates, at the entrance to the city, at the doorways she cries aloud: azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba :
4 "To you, all people, I call out; my voice reaches all humanity. « Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato !
5 You who are simple, learn prudence; you who are foolish, gain an understanding heart. Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele !
6 Listen, for I speak of noble things, and everything I say is right. Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya ya koyebisa bino, nafungoli monoko na ngai mpo na koloba makambo ya sembo.
7 My mouth utters truth, for my lips detest wickedness. Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo, mpe bibebu na ngai eyinaka mabe.
8 All the words of my mouth are righteous; none of them is twisted or crooked. Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe ;
9 To the one who understands they are all clear, and right to those who find knowledge. nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.
10 Take my instruction instead of silver, and knowledge rather than choice gold, Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto,
11 for wisdom is better than jewels, and nothing you desire can compare with her. pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.
12 I, Wisdom, dwell with prudence, and I find knowledge and discretion. Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.
13 The fear of our Father is to hate evil. Pride and arrogance, the evil way, and perverse speech I hate. Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.
14 Counsel is mine, and sound wisdom; I am understanding; strength is mine. Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi.
15 By me kings reign, and rulers decree what is just; Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo ;
16 by me princes govern, and nobles—all who rule with justice. ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka.
17 I love those who love me, and those who search for me find me. Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.
18 With me are riches and honor, enduring wealth and righteousness. Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai.
19 My fruit is better than gold, than the finest gold, and what I yield surpasses choice silver. Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.
20 I walk in the way of righteousness, along the paths of justice, Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,
21 giving wealth as an inheritance to those who love me, and filling their treasuries. mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.
22 Our Father brought me forth at the beginning of his way, before his works of old. Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala ;
23 From ages past I was established, from the beginning, before the earth began. aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te.
24 When there were no deep waters I was brought forth, when there were no springs overflowing with water. Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,
25 Before the mountains were settled, before the hills, I was brought forth, liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango,
26 while he had not yet made the earth and its fields, or the first dust of the world. tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili.
27 When he set the heavens in place, I was there; when he drew a circle over the face of the deep, Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,
28 when he set the skies in place above, when he established the springs of the deep, tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,
29 when he set for the sea its boundary so the waters would not cross their limits, when he marked out the foundations of the earth, tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;
30 then I was beside him as a master craftsman, and I was his daily delight, rejoicing before him always, nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye ;
31 rejoicing in his whole world, and delighting in the human family. nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato.
32 And now, my children, listen to me: blessed are those who keep my ways. Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !
33 Listen to instruction and be wise; do not ignore it. Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te !
34 Blessed is the one who listens to me, watching daily at my gates, waiting beside my doorway. Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai !
35 For whoever finds me finds life and receives favor from our Father. Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.
36 But whoever misses me harms his own soul; all who hate me love death." Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]