Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 My son, keep my words, and store up my commandments within you. Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.
2 Keep my commandments and live; guard my teaching as the apple of your eye. Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.
3 Bind them on your fingers; write them on the tablet of your heart. Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo.
4 Say to wisdom, "You are my sister," and call understanding your dearest friend, Loba na Bwanya : « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, » mpe bengaka Mayele « Moninga na ngai ; »
5 to keep you from the forbidden woman, from the stranger with her smooth words. mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.
6 For at the window of my house I looked down through my lattice, Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu ya lininisa ya ndako na ngai,
7 and I saw among the naive, I noticed among the young men, a youth who lacked sense, namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.
8 passing through the street near her corner, taking the road to her house, Azalaki koleka na balabala, pene ya esika oyo mwasi wana ya ndumba avandaka, mpe akotaki na nzela oyo ekenda kino na ndako ya mwasi ya ndumba.
9 in the twilight, as the day faded, in the dark of night and gloom. Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki, mpe molili ya butu ekomaki koya.
10 And there a woman comes to meet him, dressed like a prostitute, with cunning in her heart. Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;
11 She is loud and defiant; her feet will not stay at home. azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu, makolo na ye evandaka na ndako te,
12 Now in the street, now in the squares, she lurks at every corner. atalaka-talaka na bisika nyonso, tango mosusu na libanda, tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
13 She grabs him and kisses him, and with a brazen face she says to him: Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye :
14 "I had peace offerings to bring; today I have paid my vows. « Nazalaki na niongo ya mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe ; mpe lelo, nasili kokokisa ndayi na ngai.
15 So I came out to meet you, to look for you eagerly, and I have found you. Yango wana, nabimaki mpo na kokutana na yo ; nazalaki koluka yo, mpe, tala, namoni yo.
16 I have spread my bed with coverings, with colored linens from Egypt. Natandi mbeto na ngai na babulangeti ya langi ya ndenge na ndenge, basala na basinga ya lino oyo ewutaka na Ejipito.
17 I have perfumed my bed with myrrh, aloes, and cinnamon. Na mbeto na ngai, nasopi malasi ya mire, ya aloe mpe ya sinamoni.
18 Come, let us drink deep of love until morning; let us lose ourselves in love. Yaka tolangwa bolingo kino na tongo, tomipesa mobimba na elengi ya bolingo,
19 For my husband is not at home; he has gone on a long journey. pamba te mobali na ngai azali na ye na ndako te, akendeki mobembo na mokili ya mosika,
20 He took a bag of money with him and will not come home until the full moon." akendeki na saki ya mbongo na maboko, akozonga na ndako te kino na tango oyo sanza engengaka. »
21 With all her persuasive words she sways him; with her smooth lips she draws him in. Na nzela ya maloba na ye ya sukali, alongaki kokosa ye ; na nzela ya maloba na ye ya elengi, amemaki ye.
22 All at once he follows her, like an ox going to the slaughter, like a deer stepping into a snare, Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye
23 until an arrow pierces its liver; like a bird darting into a trap, he does not know it will cost him his life. kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.
24 Now then, my sons, listen to me, and pay attention to what I say. Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai, pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka maloba ya monoko na ngai !
25 Do not let your heart turn aside to her ways; do not wander into her paths. Tika ete mwasi ya boye akumba te motema na yo ! Kopengwa te na banzela na ye,
26 For she has brought down many victims; her slain are a mighty multitude. pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele, mpe asili kobomisa bingambe mibali.
27 Her house is the road to the grave, going down to the chambers of death. Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]