Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 My son, if you have put up security for your neighbor, if you have shaken hands in pledge for a stranger, Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,
2 you have been snared by the words of your mouth, caught by the words of your mouth. omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
3 Then do this, my son, and free yourself, for you are now at your neighbor's mercy: go, humble yourself, and plead with your neighbor. Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
4 Give no sleep to your eyes, no slumber to your eyelids. kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ;
5 Free yourself like a gazelle from the hand, like a bird from the hand of the trapper. mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.
6 Go to the ant, you sluggard; consider her ways and be wise. Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
7 Without having any chief, officer, or ruler, Yango ezalaka na mokambi te, mokengeli te to mokonzi te ;
8 she prepares her bread in summer and gathers her food in harvest. ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi, ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.
9 How long will you lie there, sluggard? When will you arise from your sleep? Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?
10 A little sleep, a little slumber, a little folding of the hands to rest, Mwa pongi moke, mwa kopema moke, mwa kokanga maboko moke mpo na kolala
11 and poverty will come upon you like a robber, and scarcity like an armed man. mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
12 A worthless person, a wicked man, goes about with crooked speech, Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe :
13 winks with his eyes, signals with his feet, points with his fingers, Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi ;
14 with perverted heart he devises evil, continually sowing discord; azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.
15 therefore calamity will come upon him suddenly; in a moment he will be broken beyond healing. Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.
16 There are six things our Father hates, seven that are detestable to him: Yawe ayinaka makambo wana motoba ; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye :
17 haughty eyes, a lying tongue, and hands that shed innocent blood, Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,
18 a heart that devises wicked plans, feet that hurry to run to evil, motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,
19 a false witness who breathes out lies, and one who sows discord among brothers. motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
20 My son, keep your father's commandment, and do not forsake your mother's teaching. Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
21 Bind them on your heart always; tie them around your neck. Kanga yango tango nyonso na motema na yo, lata yango na kingo na yo.
22 When you walk, they will lead you; when you lie down, they will watch over you; and when you awake, they will talk with you. Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
23 For the commandment is a lamp and the teaching a light, and the reproofs of discipline are the way of life, Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
24 to keep you from the evil woman, from the smooth tongue of the adulteress. mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.
25 Do not desire her beauty in your heart, and do not let her capture you with her eyelashes; Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.
26 for the price of a prostitute is only a loaf of bread, but a married woman hunts down a precious life. Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.
27 Can a man carry fire next to his chest and his clothes not be burned? Boni, moto akoki solo kozika moto, bongo bilamba na ye ezika te ?
28 Or can one walk on hot coals and his feet not be scorched? Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto, bongo makolo na ye ezika te ?
29 So is he who sleeps with his neighbor's wife; none who touches her will go unpunished. Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.
30 People do not despise a thief if he steals to satisfy his appetite when he is hungry, Kotiola moyibi te soki ayibi mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia.
31 but if he is caught, he will pay sevenfold; he will give all the goods of his house. Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.
32 He who commits adultery lacks sense; he who does it destroys himself. Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;
33 He will get wounds and dishonor, and his disgrace will not be wiped away. akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ; bongo soni na ye ekosila te.
34 For jealousy makes a man furious, and he will show no mercy in the day of vengeance. Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe ;
35 He will accept no compensation; he will refuse no matter how large the bribe. akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]