Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 My son, pay attention to my wisdom; listen closely to my understanding, Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai, mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,
2 so that you may guard discretion and your lips may preserve knowledge. mpo ete ozala na bososoli, mpe bibebu na yo ebomba boyebi.
3 For the lips of the forbidden woman drip honey, and her mouth is smoother than oil, Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka mafuta ya nzoyi, mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;
4 but in the end she is bitter as poison, sharp as a double-edged sword. kasi na suka na nyonso, azali bololo lokola masanga ya bololo, songe lokola mopanga ya minu mibale.
5 Her feet go down to death; her steps take hold of the grave. Makolo na ye ekokita kino na kufa, ekokende kino na mokili ya bakufi.
6 She gives no thought to the path of life; her ways wander, and she does not know it. Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi, alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
7 And now, my sons, listen to me, and do not turn away from the words of my mouth. Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai, kopesa maloba na ngai mokongo te ;
8 Keep your way far from her, and do not go near the door of her house, longola nzela na yo pembeni na ye mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
9 lest you give your honor to others and your years to one who is cruel, noki te akoya kokaba lokumu na yo epai ya bato mosusu, mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;
10 lest strangers take their fill of your strength, and your hard-earned labors go to the house of a foreigner, noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi, mpe mbuma ya mosala na yo ekokende na ndako ya mopaya ;
11 and at your end you groan, when your flesh and body are consumed, noki te okokoma kolelalela na suka tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,
12 and you say, "How I hated discipline, and my heart despised correction! mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya, mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?
13 I did not listen to the voice of my teachers or heed my instructors. Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai mpe napesaki litoyi te epai ya bato oyo bazalaki koteya ngai ?
14 I was at the brink of utter ruin in the midst of the assembled congregation." Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo, kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
15 Drink water from your own cistern, flowing water from your own well. Melaka mayi ya libulu na yo moko, oyo ezali kobima penza na libulu na yo.
16 Should your springs overflow in the streets, your streams of water in the public squares? Boni, bitima na yo esopa penza mayi na libanda to miluka na yo esopa penza mayi na balabala ?
17 Let them be yours alone, and not shared with strangers. Tika ete ezala kaka mpo na yo moko, kasi kokabola yango te na bapaya.
18 May your fountain be blessed, and rejoice in the wife of your youth, Tika ete etima na yo epambolama, mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,
19 a loving doe, a graceful deer. May her love satisfy you always; may you be captivated continually by her love. oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo !
20 Why then, my son, should you be captivated by a forbidden woman and embrace another man's wife? Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela kolinga mwasi ya ndumba ? Mpo na nini kosepela kosakana na mabele ya mwasi mosusu ?
21 For a man's ways are before the eyes of our Father, and he examines all the man's paths. Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.
22 The wicked are caught by their own wrongdoing and held fast in the cords of their sin. Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,
23 He will die for lack of discipline, and he will go astray because of his great foolishness. akokufa likolo ya bozoba, mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]