Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Listen, my children, to a father's instruction; pay attention, and gain understanding. Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.
2 I am giving you sound teaching, so do not abandon my instruction. Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ; bobwaka mateya na ngai te.
3 For I too was a son to my father, tender and the only beloved of my mother. Ngai mpe nazalaki mwana malamu na miso ya tata na ngai, boye mama na ngai alingaki ngai makasi lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.
4 He taught me and said, "Let your heart hold on to my words; keep my commands and you will live. Tata na ngai azalaki koteya mpe koloba na ngai boye : « Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai, bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,
5 Get wisdom, get understanding; do not forget, and do not turn away from the words of my mouth. zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,
6 Do not forsake her, and she will protect you; love her, and she will watch over you. kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo, linga yango mpe ekobomba yo.
7 The beginning of wisdom is this: get wisdom; and with all you acquire, get understanding. Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.
8 Cherish her, and she will lift you high; embrace her, and she will bring you honor. Simba yango makasi, mpe ekotombola yo ; yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.
9 She will set a garland of grace on your head; she will present you with a crown of glory." Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto, ekopesa yo motole ya nkembo. »
10 Listen, my son, and receive my words, and the years of your life will be many. Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
11 I have taught you the way of wisdom; I have led you along straight paths. Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya, nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.
12 When you walk, your steps will not be held back; and when you run, you will not stumble. Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola ; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.
13 Hold on to instruction, do not let go; guard her, for she is your life. Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.
14 Do not set foot on the path of the wicked, and do not walk in the way of evildoers. Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.
15 Avoid it, do not travel on it; turn away from it and pass on by. Longwa kati na bango, kolekela wana te, kosala mpe maseki kuna te, kasi kende na yo na nzela mosusu.
16 For they cannot sleep unless they do wrong; they are robbed of rest unless they make someone stumble. Pamba te balalaka pongi te soki basali nanu moto mabe te, mpe pongi ekimaka bango soki babomi moto te ;
17 They feed on the bread of wickedness and drink the wine of violence. baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.
18 But the path of the righteous is like the light of dawn, shining brighter and brighter until the full light of day. Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.
19 The way of the wicked is like deep darkness; they do not know what makes them stumble. Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.
20 My son, pay attention to my words; listen closely to my sayings. Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai, pesa litoyi na yo na mateya na ngai.
21 Never lose sight of them; keep them deep within your heart. Tika ete ezala te mosika ya miso na yo ! Batela yango malamu kati na motema na yo,
22 For they are life to those who find them, and healing to their whole body. pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango, mpe epesaka nzoto kolongono.
23 Above all else, guard your heart, for everything you do flows from it. Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
24 Keep crooked speech from your mouth, and keep deceitful lips far from you. Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.
25 Let your eyes look straight ahead; fix your gaze directly before you. Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
26 Give careful thought to the path for your feet, and all your ways will be secure. Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
27 Do not turn to the right or the left; keep your foot away from evil. Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]