Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 My son, do not forget my teaching, but let your heart keep my commandments, Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;
2 for they will add length of days and years of life and peace to you. pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi, ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo mpe ekomemela yo kimia.
3 Do not let covenant love and faithfulness leave you; bind them around your neck, write them on the tablet of your heart. Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !
4 So you will find favor and a good reputation with our Father and with people. Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.
5 Trust in our Father with all your heart, and do not lean on your own understanding. Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo.
6 In all your ways know him, and he will make your paths straight. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.
7 Do not be wise in your own eyes; fear our Father, and turn away from evil. Tika ete omimonaka te moto ya bwanya na miso na yo moko ; tosa Yawe mpe longwa na mabe.
8 This will bring healing to your body and refreshment to your bones. Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono mpe kolendisa mikuwa na yo.
9 Honor our Father with your wealth and with the firstfruits of all your produce, Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.
10 then your barns will be filled with plenty, and your vats will overflow with new wine. Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko, mpe bambeki na yo ekotonda na vino.
11 My son, do not despise the discipline of our Father or be weary of his correction, Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye ;
12 for our Father disciplines the one his heart loves, just as a father disciplines the son he delights in. pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
13 Blessed is the one who finds wisdom, and the one who gains understanding, Esengo na moto oyo amoni bwanya ! Esengo na moto oyo azwi mayele !
14 for the gain from her is better than gain from silver, and her profit better than gold. Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya.
15 She is more precious than jewels, and nothing you desire can compare with her. Ezali na motuya koleka babiju, mpe eloko moko te oyo moto akoki koluka ekokani na yango.
16 Long life is in her right hand; in her left hand are riches and honor. Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.
17 Her ways are pleasant, and all her paths are peace. Nzela na Ye ezali ya esengo, mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia.
18 She is a tree of life to those who take hold of her; those who hold her fast are called blessed. Bwanya ezali nzete ya bomoi mpo na bato oyo basimbaka yango ; bato oyo bakokanga yango makasi bakozala na esengo.
19 Our Father by wisdom founded the earth; by understanding he established the heavens; Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.
20 by his knowledge the depths burst open, and the clouds drop down the dew. Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula.
21 My son, do not lose sight of these; keep sound wisdom and discretion, Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te ; batela yango malamu,
22 and they will be life for your soul and an adornment for your neck. pamba te ekozala bomoi mpo na yo mpe ngolu mpo na kingo na yo.
23 Then you will walk on your way securely, and your foot will not stumble. Boye, okotambola na kimia na nzela na yo, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.
24 If you lie down, you will not be afraid; when you lie down, your sleep will be sweet. Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.
25 Do not be afraid of sudden terror, or of the ruin of the wicked when it comes, Somo ya pwasa ekobangisa yo te, ezala tango bato mabe bakobimela yo na pwasa ;
26 for our Father will be your confidence and will keep your foot from being caught. pamba te Yawe akozala elikya na yo mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.
27 Do not withhold good from those who deserve it, when it is in your power to do it. Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto oyo azali na bosenga, tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.
28 Do not say to your neighbor, "Go, and come back, and tomorrow I will give it"—when you have it with you. Kolobaka na moninga na yo te : « Kende, bongo oya sima ; nakopesa yo yango lobi ; » soki ozali na makoki ya kosala likambo yango.
29 Do not plot evil against your neighbor, who lives trustingly beside you. Kosalaka moninga na yo mabe te soki azali kovanda na kimia epai na yo.
30 Do not quarrel with anyone for no reason, when he has done you no harm. Kolukelaka moto makambo te, oyo ezanga tina soki asali yo mabe te.
31 Do not envy a violent man, and do not choose any of his ways, Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.
32 for the devious person is detestable to our Father, but he takes the upright into his confidence. Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.
33 The curse of our Father is on the house of the wicked, but he blesses the home of the righteous. Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe, kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;
34 Toward the mockers he is scornful, but to the humble he gives grace. asambwisaka batioli, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka.
35 The wise will inherit honor, but fools get only disgrace. Bato ya bwanya bakozwa nkembo, kasi bazoba bakozala na soni.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]