Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 My son, if you receive my words and store up my commandments within you, Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;
2 making your ear attentive to wisdom and turning your heart toward understanding; soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;
3 yes, if you call out for insight and raise your voice for understanding, soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli ;
4 if you seek it like silver and search for it as for hidden treasure, soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,
5 then you will understand the fear of our Father and find the knowledge of our Father. okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
6 For our Father gives wisdom; from his mouth come knowledge and understanding. Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.
7 He stores up sound wisdom for the upright; he is a shield to those who walk in integrity, Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.
8 guarding the paths of justice and watching over the way of his faithful ones. Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.
9 Then you will understand righteousness and justice and fairness—every good path. Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo : nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.
10 For wisdom will enter your heart, and knowledge will be pleasant to your soul; Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.
11 discretion will watch over you, and understanding will guard you, Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo
12 rescuing you from the way of evil, from men who speak twisted things, mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,
13 who abandon the paths of uprightness to walk in the ways of darkness, na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,
14 who delight in doing evil and rejoice in the perversity of evil, na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,
15 whose paths are crooked, and who are devious in their ways. na bato oyo nzela na bango etengama-tengama mpe etamboli na bango etonda na mobulu.
16 Wisdom will rescue you also from the forbidden woman, from the stranger with her smooth words, Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,
17 who forsakes the companion of her youth and forgets the covenant of her Father. oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye ;
18 For her house sinks down to death, and her paths to the dead. pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.
19 None who go to her return, nor do they reach the paths of life. Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
20 So you will walk in the way of the good and keep to the paths of the righteous. Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.
21 For the upright will live in the land, and those of integrity will remain in it; Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ;
22 but the wicked will be cut off from the land, and the treacherous will be torn away from it. kasi bato mabe bakokufa na mokili mpe bakolongola bango kati na mokili ya bato ya songisongi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]