Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The proverbs of Solomon, son of David, king of Israel: Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :
2 To know wisdom and instruction, to understand words of insight, mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya mpe kososola maloba ya mayele ;
3 to receive instruction in wise conduct, in righteousness, justice, and fairness, mpo na kozwa mateya ya bwanya oyo epesaka bizaleli ya sembo, ya boyengebene mpe makambo ya alima ;
4 to give prudence to the simple, knowledge and discretion to the young, mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.
5 let the wise also hear and increase in learning, and let the one who understands gain guidance, Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;
6 to understand a proverb and a parable, the words of the wise and their riddles. mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
7 The fear of our Father is the beginning of knowledge; fools despise wisdom and instruction. Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.
8 Listen, my son, to your father's instruction, and don't turn away from your mother's teaching, Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
9 for they are a graceful garland for your head and pendants for your neck. Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
10 My son, if sinners entice you, do not give in. Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.
11 If they say, "Come with us, let us lie in wait for blood, let us ambush the innocent without cause; Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te !
12 like the grave let us swallow them alive, and whole, like those who go down to the pit; Ndenge mokili ya bakufi esalaka, tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa ;
13 we will find all kinds of precious goods, we will fill our houses with plunder; tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba ;
14 throw in your lot with us; we will all share one purse," okozwa ndambo na yo epai na biso, pamba te biso nyonso tokosangisa biloko na biso esika moko ; »
15 my son, do not walk in the way with them; hold back your foot from their paths, mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te, longola makolo na yo na nzela na bango ;
16 for their feet run to evil, and they hurry to shed blood. pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.
17 For a net spread out before any bird's eyes catches nothing; Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
18 but these lie in wait for their own blood; they ambush their own lives. Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.
19 Such are the ways of everyone greedy for unjust gain; it takes away the life of its possessors. Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta asukaka kaka bongo, mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.
20 Wisdom cries aloud in the street; in the open squares she lifts her voice. Bwanya azali koganga na libanda, atomboli mongongo na ye na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;
21 At the head of the noisy streets she calls out; at the entrance of the city gates she speaks: azali koganga na bisika ya loyenge mpe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba :
22 "How long, simple ones, will you love being simple? How long will mockers delight in their mocking and fools hate knowledge? « Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?
23 If you respond to my correction, I, Wisdom, will pour out my spirit on you; I will make my words known to you. Soki boyoki makebisi na Ngai, nakosopela bino Molimo na Ngai mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.
24 Because I have called and you refused, I stretched out my hand and no one paid attention, Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,
25 and you ignored all my counsel and rejected all my correction, lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,
26 I also will laugh at your calamity; I will mock when terror overtakes you, Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
27 when terror overtakes you like a storm and your calamity comes like a whirlwind, when distress and anguish come upon you. tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.
28 Then they will call on me, but I will not answer; they will seek me earnestly but will not find me, Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.
29 because they hated knowledge and did not choose the fear of our Father, Lokola bayinaki boyebi mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,
30 they rejected my counsel and despised all my correction. lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai,
31 So they will eat the fruit of their own way and have their fill of their own schemes. bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.
32 For the waywardness of the simple will kill them, and the complacency of fools will destroy them; Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;
33 but whoever listens to me will dwell secure and be at ease, without dread of disaster." kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]