Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 3 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Elikya na Yawe

1Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te,kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;

2pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi,ekobakisa mibu ebele na bomoi na yompe ekomemela yo kimia.

3Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te,linga yango zingazinga na kingo na yo,mpe koma yango na etando ya motema na yo !

4Okozwa ngolu mpe kombo ya malamuna miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.

5Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,mpe kotia motema te na mayele na yo.

6Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,mpe Ye akokomisa yango alima.

7Tika ete omimonaka te moto ya bwanyana miso na yo moko ;tosa Yawe mpe longwa na mabe.

8Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongonompe kolendisa mikuwa na yo.

9Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yompe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.

10Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko,mpe bambeki na yo ekotonda na vino.

11Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe,koboya te pamela na Ye ;

12pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka,ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.

Bwanya : bomengo oyo ezanga talo

13Esengo na moto oyo amoni bwanya !Esengo na moto oyo azwi mayele !

14Pamba te kozala na yango eleki kozalana palata na motuya,mpe lifuti na yango eleki wolooyo balekisi na moto na motuya.

15Ezali na motuya koleka babiju,mpe eloko moko te oyo moto akoki kolukaekokani na yango.

16Kati na loboko na Ye ya mobali,ezali na bomoi ya molayi ;mpe kati na loboko na Ye ya mwasi,ezali na lokumu mpe bomengo.

17Nzela na Ye ezali ya esengo,mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia.

18Bwanya ezali nzete ya bomoimpo na bato oyo basimbaka yango ;bato oyo bakokanga yango makasibakozala na esengo.

19Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ;na nzela ya mayele, alendisaki likolo.

20Na nzela ya mayele na Ye,mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayimpe mapata enokisaki mvula.

Yawe akozala elikya na yo

21Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te ;batela yango malamu,

22pamba te ekozala bomoi mpo na yompe ngolu mpo na kingo na yo.

23Boye, okotambola na kimia na nzela na yo,mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.

24Tango okolala, okobanga eloko moko te,pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.

25Somo ya pwasa ekobangisa yo te,ezala tango bato mabe bakobimela yo na pwasa ;

26pamba te Yawe akozala elikya na yompe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.

Kolinga baninga

27Koboyaka te kosala bolamu epai ya motooyo azali na bosenga,tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.

28Kolobaka na moninga na yo te :« Kende, bongo oya sima ; nakopesa yo yango lobi ; »soki ozali na makoki ya kosala likambo yango.

29Kosalaka moninga na yo mabe tesoki azali kovanda na kimia epai na yo.

30Kolukelaka moto makambo te, oyo ezanga tinasoki asali yo mabe te.

31Kolulaka te moto ya mobulumpe koponaka ata nzela moko te,kati na banzela na ye.

32Pamba te Yawe ayinaka bato mabe,kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.

33Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe,kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;

34asambwisaka batioli,kasi atalisaka ngolu na Yeepai ya bato oyo bamikitisaka.

35Bato ya bwanya bakozwa nkembo,kasi bazoba bakozala na soni.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]