Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Proverbs 5 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Sala keba na ekobo

1Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai,mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,

2mpo ete ozala na bososoli,mpe bibebu na yo ebomba boyebi.

3Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisakamafuta ya nzoyi,mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;

4kasi na suka na nyonso,azali bololo lokola masanga ya bololo,songe lokola mopanga ya minu mibale.

5Makolo na ye ekokita kino na kufa,ekokende kino na mokili ya bakufi.

6Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.

7Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai,kopesa maloba na ngai mokongo te ;

8longola nzela na yo pembeni na yempe kopusana te liboso ya ndako na ye,

9noki te akoya kokaba lokumu na yoepai ya bato mosusu,mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;

10noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi,mpe mbuma ya mosala na yo ekokendena ndako ya mopaya ;

11noki te okokoma kolelalela na sukatango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,

12mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya,mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?

13Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngaimpe napesaki litoyi te epai ya batooyo bazalaki koteya ngai ?

14Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo,kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »

Mwasi ya bolenge na yo

15Melaka mayi ya libulu na yo moko,oyo ezali kobima penza na libulu na yo.

16Boni, bitima na yo esopa penza mayi na libandato miluka na yo esopa penza mayi na balabala ?

17Tika ete ezala kaka mpo na yo moko,kasi kokabola yango te na bapaya.

18Tika ete etima na yo epambolama,mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,

19oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,lokola mboloko ya mafuta.Tika ete tango nyonso,mabele na ye etondisaka yo na esengo,mpe bolingo na ye elangwisaka yo !

20Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufelakolinga mwasi ya ndumba ?Mpo na nini kosepela kosakanana mabele ya mwasi mosusu ?

21Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe,mpe ayekolaka malamu makambo nyonsooyo moto asalaka.

22Moto mabe akokangama kakana motambo ya mabe na ye mokompe na singa ya lisumu na ye,

23akokufa likolo ya bozoba,mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]