Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Come, let us return to our Father, for he has torn us so he can heal us; he has struck us down, and he will bandage our wounds. Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.
2 After two days he will revive us; on the third day he will raise us up so we can live before him. Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.
3 Let us know, let us press on to know our Father. He goes forth as surely as the dawn; he will come to us like the rain, like the spring showers that water the earth. Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.
4 "What should I do with you, Ephraim? What should I do with you, Judah? Your love is like a morning cloud, like the dew that disappears early. Efrayimi, nasala yo lisusu nini ? Yuda, nasala yo lisusu nini ? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.
5 Therefore I have cut them down by the prophets; I have slain them by the words of my mouth, and my judgment goes forth like the light. Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.
6 For I desire covenant love and not sacrifice, the knowledge of our Father rather than burnt offerings. Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
7 But like Adam they broke the covenant; there they dealt faithlessly with me. Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.
8 Gilead is a city of evildoers, marked with bloody footprints. Galadi ezali engumba ya bato mabe, etonda na bilembo ya makila.
9 As robbers lie in wait for a victim, so the company of priests murders on the road to Shechem; yes, they commit shameful crimes. Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka : babomaka bato na nzela ya Sishemi ; ezali likambo ya somo penza !
10 In the house of Israel I have seen a horrible thing: Ephraim's prostitution is there; Israel is defiled. Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi : Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.
11 "For you also, Judah, a harvest is appointed, when I restore the fortunes of my children." Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]