Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Whenever I try to heal Israel, the sin of Ephraim is uncovered, and the evils of Samaria; for they practice falsehood—the thief breaks in, the raiders plunder outside. Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.
2 But they do not say in their hearts that I remember all their evil. Now their deeds surround them; they are before my face. Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
3 By their evil they make the king glad, and the princes by their lies. Basepelisaka mokonzi na nzela ya misala na bango ya mabe ; basepelisaka mpe bakambi na nzela ya lokuta na bango.
4 They are all adulterers, like an oven heated by the baker, who stops stirring the fire from the kneading of the dough until it is leavened. Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.
5 On the day of our king the princes made themselves sick with the heat of wine; he joined hands with mockers. Na mokolo ya feti ya mokonzi na biso, bakambi balangwaka masanga mpe mokonzi asanganaka na batioli.
6 For they draw near with hearts burning like an oven as they lie in wait; all night their anger smolders, and in the morning it blazes like a flaming fire. Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu, bapusanaka pene na ye na mayele mabe. Butu mobimba, balalaka na kanda ; mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
7 They are all hot as an oven, and they devour their rulers. All their kings have fallen; none of them calls upon me. Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu, batumbaka bakambi na bango ; mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka, moko te kati na bango abelelaka Ngai.
8 Ephraim mixes himself among the peoples; Ephraim is a flat cake not turned over. Efrayimi asangani na bikolo mosusu, akomi lokola galeti oyo ebela malamu te.
9 Strangers devour his strength, and he does not know it; gray hairs are sprinkled upon him, and he does not know it. Bapaya bazali kosilisa ye makasi, kasi ye azali kososola yango te. Azali kokoma mobange, kasi azali kososola yango te.
10 The pride of Israel testifies to his face, yet they do not return to their Father, nor seek him, in all of this. Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !
11 Ephraim has become like a dove, silly and without sense, calling to Egypt, going to Assyria. Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.
12 As they go, I will spread my net over them; I will bring them down like the birds of the sky. I will discipline them as their assembly was warned. Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.
13 Woe to them, for they have strayed from me! Destruction to them, for they have rebelled against me! I would redeem them, but they speak lies against me. Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !
14 They do not cry to me from their heart, but they wail upon their beds; for grain and new wine they gash themselves; they turn away from me. Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
15 Although I trained and strengthened their arms, yet they devise evil against me. Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.
16 They turn, but not upward; they have become like a slack bow. Their princes will fall by the sword for the insolence of their tongue; this will make them a laughingstock in the land of Egypt. Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba ; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]