Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Put the trumpet to your lips! An eagle swoops over my house, because they have broken my covenant and rebelled against my law. Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.
2 To me they cry, "My Father! We know you—we, Israel!" Isalaele azali kobelela Ngai : « Oh Nzambe na biso, toyebi Yo ! »
3 Israel has rejected what is good; an enemy will pursue him. Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ; yango wana, monguna akolanda ye.
4 They set up kings, but not from me; they appointed princes, and I knew nothing of it. With their silver and gold they made themselves idols, only to be cut off. Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.
5 I have rejected your calf, Samaria; my anger burns against them. How long will they be incapable of innocence? Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele ! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?
6 For this calf is from Israel; a craftsman made it—it is not God. The calf of Samaria will be broken to pieces. Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.
7 They sow the wind, and they will reap the whirlwind. The standing grain has no heads; it yields no flour. And if it were to yield, foreigners would swallow it down. « Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.
8 Israel is swallowed up; now they are among the nations like a pot no one wants. Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !
9 For they have gone up to Assyria—a wild donkey wandering off alone. Ephraim has hired itself out to lovers. Pamba te bakendeki na Asiri lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko. Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.
10 Even though they hire allies among the nations, now I will gather them up. And they will soon writhe under the burden of the king of princes. Ata apesaki bakado kati na bikolo, sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko ya mokonzi moko ya nguya.
11 Because Ephraim multiplied altars for sinning, they have become altars for sinning to him. Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.
12 Though I wrote out for him the countless things of my law, they were treated as something strange. Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.
13 As for the sacrifices they offer me, they sacrifice meat and eat it, but I take no delight in them. Now I will remember their guilt and punish their sins; they will return to Egypt. Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.
14 Israel has forgotten his Maker and built palaces; and Judah has multiplied fortified cities. But I will send fire on his cities, and it will devour Judah's strongholds. Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]