Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Do not rejoice, Israel; do not exult like the nations. For you have been unfaithful, forsaking your Father; you have loved a prostitute's wages on every threshing floor. Isalaele, kosepela te ; kozala na esengo te lokola bikolo mosusu ; pamba te otikaki Nzambe na yo mpe okendeki kosala kindumba ; osepelaki na lifuti ya kindumba na bitando nyonso oyo batutelaka ble.
2 Threshing floor and winepress will not feed them, and the new wine will fail them. Etando oyo batutelaka ble mpe ekamolelo masanga ya vino ekopesa bango bilei te, mpe bakozanga vino ya sika.
3 They will not remain in our Father's land; Ephraim will return to Egypt, and in Assyria they will eat unclean food. Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe ; Efrayimi akozonga na Ejipito, mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.
4 They will not pour out wine offerings to our Father, and their sacrifices will not please him. Their bread will be like the bread of mourners; all who eat it will be defiled. For their bread will feed only their hunger; it will not enter the house of our Father. Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te, mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te. Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga : bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo ; pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango, kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.
5 What will you do on the day of the appointed feast, on the day of our Father's festival? Boye, bokosala nini na mikolo ya bafeti oyo ekatama, na mikolo ya bafeti ya Yawe ?
6 For look—they are fleeing from destruction, but Egypt will gather them and Memphis will bury them. Nettles will overrun their silver treasures; thorns will fill their tents. Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
7 The days of punishment have come; the days of reckoning have come—let Israel know it! The prophet is a fool, the man inspired by the spirit is mad, because your sin is great and your hostility is great. Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.
8 The prophet is the watchman of Ephraim, with my Father; yet a bird trap lies on all his paths, and hostility in the house of his Father. Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli ; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.
9 They have sunk deep into corruption, as in the days of Gibeah. He will remember their wrongdoing; he will punish their sins. Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.
10 Like grapes in the wilderness I found Israel; like the first fruit on the fig tree in its first season I saw your ancestors. But they came to Baal-peor and consecrated themselves to shame, and they became as detestable as the thing they loved. Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
11 Ephraim's glory will fly away like a bird—no birth, no pregnancy, no conception. Nkembo ya Efrayimi ekokima lokola ndeke, wuta na mbotama, wuta na zemi, wuta na ebandeli ya zemi.
12 Even if they raise their children, I will bereave them until no one is left. Yes, woe to them when I turn away from them! Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !
13 Ephraim, as I have seen, was planted like Tyre in a meadow; yet Ephraim must lead his children out to the slaughter. Nazali komona Efrayimi lokola engumba Tiri oyo etongama na likolo ya mabele ya kitoko ; nzokande, Efrayimi akokaba bana na ye na mobomi.
14 Give them, our Father—what will you give them? Give them a miscarrying womb and dry breasts. Oh Yawe, pesa bango… Okopesa bango nini ? Pesa bango mabumu oyo esopaka bazemi, mpe mabele oyo ekawuka.
15 "All their evil is at Gilgal; there I rejected them for their evil deeds; I will drive them from my house; I will no longer show them my love; all their officials are rebels. Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali ; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.
16 Ephraim is struck down; their root is dried up; they will bear no fruit. Even if they give birth, I will put their cherished children to death." Efrayimi alembi, misisa na ye ekawuki ; akobota lisusu bambuma te ; ata soki baboti bana, nakoboma bana na bango oyo balingaka mingi.
17 My Father will reject them because they have not listened to him; they will become wanderers among the nations. Nzambe na ngai akobwaka bango, pamba te batosaki Ye te, mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]