Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Israel was a lush vine that yielded its fruit. The more his fruit, the more altars he built; the richer his land, the finer he made his sacred pillars. Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.
2 Their hearts are divided; now they must bear their guilt. He will break down their altars and shatter their sacred pillars. Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.
3 For now they will say, "We have no king, because we did not fear our Father—and a king, what could he do for us?" Boye bakoloba : « Tozali na mokonzi te, pamba te totosaki Yawe te. Ata tozalaki na mokonzi, akokaki kosala nini mpo na biso ? »
4 They speak mere words, swearing empty oaths and making covenants; so judgment springs up like poisonous weeds in the furrows of a field. Bapesaka bilaka ebele, balapaka ndayi ya lokuta mpe basalaka boyokani. Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.
5 The people of Samaria tremble for the calf of Beth-aven. Its people mourn over it, and its idol-priests wail over it, over its glory that has departed from it. Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.
6 The idol itself will be carried off to Assyria as tribute to the great king. Ephraim will be seized with shame, and Israel will be ashamed of his own plans. Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri lokola likabo mpo na mokonzi monene. Efrayimi akoyoka soni, mpe Isalaele akosambwa mpo na mabongisi oyo basalaki.
7 Samaria's king will perish like a twig tossed on the water. Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango bakotiola likolo ya mayi lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.
8 The high places of Aven, the sin of Israel, will be destroyed. Thorns and thistles will grow up over their altars, and they will say to the mountains, "Cover us," and to the hills, "Fall on us." Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »
9 Since the days of Gibeah you have sinned, Israel; there they have taken their stand. Will not war overtake them in Gibeah? Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea mpe obongwani te. Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?
10 When I please, I will discipline them, and nations will be gathered against them, binding them tight for their double guilt. Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi ; bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita mpe bakokanga bango minyololo likolo ya masumu mibale oyo basalaki.
11 Ephraim was a trained heifer that loved to thresh, and I spared her beautiful neck; but now I will harness Ephraim, Judah must plow, and Jacob must break up the ground for himself. Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi oyo babokola malamu, alingaka kobeta ble ; kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko. Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda, Yuda akobalola mabele, Jakobi akopanza-panza yango.
12 Sow for yourselves righteousness; reap the fruit of covenant love; break up your unplowed ground. For it is time to seek our Father, until he comes and rains righteousness down upon you. Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.
13 You have plowed wickedness; you have reaped injustice; you have eaten the fruit of lies. Because you trusted in your own way, in the multitude of your warriors, Bolonaki makambo mabe, bobukaki mpe makambo mabe mpe boliaki mbuma ya lokuta, pamba te botiaki elikya na makasi mpe na ebele ya basoda na bino.
14 the roar of battle will rise against your people, and all your fortresses will be devastated, as Shalman devastated Beth-arbel on the day of war, when mothers were dashed to pieces with their children. Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.
15 So it will be done to you, Bethel, because of your great evil. At dawn the king of Israel will be utterly cut off. Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]