Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Israel was a child, I loved him, and out of Egypt I called my son. Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.
2 The more they were called, the more they turned away; they kept sacrificing to the Baals and burning incense to carved images. Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye, tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai. Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.
3 Yet it was I who taught Ephraim to walk, taking them up by their arms; but they did not know that I healed them. Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi ndenge ya kotambola ; namemaki bango na maboko na Ngai, kasi basosolaki te ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.
4 I led them with cords of kindness, with bands of love; I was like one who lifts the yoke from their jaws, and I bent down to feed them. Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ; nalongolaki bango ekangiseli na bakingo mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.
5 They will not return to the land of Egypt, but Assyria will be their king, because they refused to return. Lokola baboyi kozonga epai na Ngai, bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te, kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.
6 The sword will whirl against their cities, consume the bars of their gates, and devour them because of their own schemes. Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.
7 My people are bent on turning away from me; though they call to the Most High, he will not raise them up at all. Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.
8 How can I give you up, Ephraim? How can I hand you over, Israel? How can I make you like Admah? How can I treat you like Zeboiim? My heart recoils within me; my compassion grows warm and tender. Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.
9 I will not act on my fierce anger; I will not again destroy Ephraim. For I am your Father and not a man, the Holy One in your midst, and I will not come in wrath. Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te ! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ; nakoya lisusu na kanda te.
10 They will follow our Father; he will roar like a lion. When he roars, his children will come trembling from the west. Bakolanda Yawe ! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.
11 They will come trembling like birds from Egypt, like doves from the land of Assyria, and I will settle them in their homes, declares our Father. Bakoya na kolenga lokola bandeke wuta na Ejipito, lokola bibenga wuta na Asiri. Nakovandisa bango na bandako na bango, elobi Yawe.
12:1 Ephraim has surrounded me with lies, and the house of Israel with deceit; but Judah still walks with our Father, and is faithful to the Holy One. Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa ; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]