Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 11 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Bolingo na Nzambe mpo na Isalaele

1Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye,mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.

2Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye,tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai.Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbekampe kotumbela bikeko malasi ya ansa.

3Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimindenge ya kotambola ;namemaki bango na maboko na Ngai,kasi basosolaki teete Ngai nde nazalaki kobatela bango.

4Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ;nalongolaki bango ekangiseli na bakingompe namikitisaki mpo na koleisa bango.

5Lokola baboyi kozonga epai na Ngai,bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te,kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.

6Mopanga ekokota na bingumba na bango,ekobuka bikangelo ya bikuke na bangompe ekosukisa mabongisi na bango.

7Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo.Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo,moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.

Bolingo ekolonga

8Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ?Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ?Mpo na nini nasala yo makambooyo nasalaka engumba ya Adima ?Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yolokola engumba ya Tseboyimi ?Motema na Ngai ebaluki kati na Ngaimpe natondi na mawa makasi.

9Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi,nakobebisa lisusu Efrayimi te.Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te !Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ;nakoya lisusu na kanda te.

10Bakolanda Yawe !Yawe akoganga lokola nkosi.Tango akoganga,bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.

11Bakoya na kolengalokola bandeke wuta na Ejipito,lokola bibenga wuta na Asiri.Nakovandisa bango na bandako na bango,elobi Yawe.

Masumu ya Isalaele

12:1Efrayimi azingeli Ngai na lokuta,mpe libota ya Isalaele, na kokosa ;kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe,elongo na Mosantu ya solo.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]