Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 10 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

1Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele,azalaki kobota mbuma mpo na ye moko.Ndenge azalaki kobota mbuma ebele,ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ;ndenge mabele na ye ekomaki kitoko,ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.

2Mitema na bango etondi na mabempe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango.Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bangompe akopanza mabanga na bango ya bule.

3Boye bakoloba :« Tozali na mokonzi te,pamba te totosaki Yawe te.Ata tozalaki na mokonzi,akokaki kosala nini mpo na biso ? »

4Bapesaka bilaka ebele,balapaka ndayi ya lokutampe basalaka boyokani.Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngengeoyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.

5Bavandi ya Samari bazali kolengampo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ;bato na yango mpe Banganga-Nzambeoyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombebakosala matanga na tina na yango.Tika ete basepela lelompo ete nkembo ya mwana ngombeelongwe kati na bango.

6Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asirilokola likabo mpo na mokonzi monene.Efrayimi akoyoka soni,mpe Isalaele akosambwampo na mabongisi oyo basalaki.

7Mokili ya Samari mpe mokonzi na yangobakotiola likolo ya mayilokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.

8Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveniepai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama.Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bangompe ekozipa yango.Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! »Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »

9Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibeampe obongwani te.Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?

10Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi ;bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likitampe bakokanga bango minyolololikolo ya masumu mibale oyo basalaki.

11Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasioyo babokola malamu,alingaka kobeta ble ;kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko.Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda,Yuda akobalola mabele,Jakobi akopanza-panza yango.

12Bolona bosembo mpo na bino mokompe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo.Bomikatela bilanga ya sika,pamba te tango ya koluka Yawe ekokikino tango akoya kosopela bino bosembo.

13Bolonaki makambo mabe,bobukaki mpe makambo mabempe boliaki mbuma ya lokuta,pamba te botiaki elikya na makasimpe na ebele ya basoda na bino.

14Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo,bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ;ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribelina mokolo ya bitumba,tango bamama mpe bana na bangobakweyaki na mabele.

15Beteli, makambo oyo ekokomela yompo ete mabe na yo eleki ndelo.Tango mokolo yango ekokoka,mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]