Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 Ephraim feeds on the wind and chases the east wind all day long; they pile up lies and violence. They make a treaty with Assyria, and their oil is carried off to Egypt. Efrayimi aliaka mopepe ; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
3 Our Father has a lawsuit with Judah, and he will hold Jacob accountable for his ways; according to his deeds he will repay him. Yawe alingi kosamba na Yuda ; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.
4 In the womb he grasped his brother's heel, and in his strength he wrestled with our Father. Na libumu ya mama na bango, akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe ; tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.
5 He wrestled with the messenger and prevailed; he wept and begged for his favor. At Bethel he found him, and there he spoke with us. Abundaki na anjelu mpe alongaki, alelaki mpe asengaki ngolu na ye. Jakobi akutanaki na ye na Beteli, mpe ezali kuna nde asololaki na ye.
6 The Father of heaven's armies—our Father is the name by which he is remembered. Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.
7 So you—return to your Father; hold fast to covenant love and justice, and wait for your Father continually. Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo ; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.
8 A merchant with dishonest scales in his hand—he loves to oppress. Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.
9 Ephraim says, "Ah, but I have grown rich; I have found wealth for myself. In all my labors, they will find no guilt in me—nothing that is truly sin." Efrayimi alobaka na lolendo nyonso : « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
10 "But I am your Father, who brought you out from the land of Egypt; I will again make you live in tents, as in the days of the appointed feast. Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
11 I spoke to the prophets; it was I who multiplied visions, and through the prophets I gave parables." Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.
12 If Gilead is wickedness, they have come to nothing; in Gilgal they sacrifice bulls—their altars too are like heaps of stones on the furrows of a field. Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali ; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.
13 Jacob fled to the country of Aram; there Israel served for a wife, and for a wife he tended sheep. Jakobi akimaki na mokili ya Siri ; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi ; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.
14 By a prophet our Father brought Israel up out of Egypt, and by a prophet he was guarded. Yawe asalelaki mosakoli mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito, abatelaki ye na nzela ya mosakoli.
15 Ephraim has stirred up bitter provocation; so his Sovereign Father will leave his bloodguilt upon him and repay him for his contempt. Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi, yango wana, Nkolo na ye akotangela ye ngambo ya makila oyo asopaki mpe akofuta ye kolanda mabe na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]