Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Ephraim spoke, there was trembling; he was exalted in Israel. But he became guilty through Baal, and he died. Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga ; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ; yango wana akufaki.
2 And now they sin more and more, making molded idols for themselves—silver images shaped by their own skill, all of them the work of craftsmen. To these they say, "Let those who sacrifice kiss the calves!" Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu : nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango : « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »
3 Therefore they will be like the morning mist, like the dew that fades early away, like chaff swirling from the threshing floor, and like smoke from a window. Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo, lokola londende ya tongo oyo elimwaka, lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika na esika oyo batutelaka ble, mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.
4 But I am your Father, who brought you from the land of Egypt; you acknowledge no Father but me, and besides me there is no savior. « Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito. Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai, ozali na mobikisi mosusu te.
5 It was I who knew you in the wilderness, in the land of burning drought. Ngai, nayebaki yo kati na esobe, kati na mabele oyo ekawuka.
6 When I fed them they were satisfied; they were satisfied, and their heart grew proud; therefore they forgot me. Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.
7 So I have become like a lion to them; like a leopard I lurk beside the road. Boye, nakokweyela bino lokola nkosi mpe nakozela bino na nzela lokola nkoyi.
8 I will fall upon them like a bear robbed of her cubs; I will tear open the covering of their heart. There I will devour them like a lion, as a wild beast would rip them apart. Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.
9 Israel, you bring destruction on yourself by being against me—against your helper. Isalaele, obebisami ; pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo !
10 Where now is your king, that he may save you in all your cities? Where are your rulers, of whom you said, "Give me a king and princes"? Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo ? Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso oyo, na tina na bango, bozalaki koloba : ‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli ? ›
11 I gave you a king in my anger, and in my wrath I took him away. Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi, mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.
12 The guilt of Ephraim is sealed away; his sin is stored up. Mabe ya Efrayimi ebombami, mpe masumu na ye ekomami penza.
13 The pangs of childbirth come for him, but he is an unwise son; for when the time arrives, he does not come out at the opening of the womb. Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.
14 From the power of the grave I will ransom them; from death I will redeem them. Where, O Death, are your plagues? Where, O the grave, is your destruction? Relenting is hidden from my eyes. Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !
15 Though he flourishes among the reeds, an east wind will come—a wind of our Father rising from the wilderness. His spring will fail and his fountain run dry; the east wind will plunder his treasury of every precious thing. Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe : ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »
14:1 Samaria will bear her guilt, because she has rebelled against her Father. They will fall by the sword; their little ones will be dashed to pieces, and their pregnant women ripped open. Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]