Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 Return, Israel, to your Father; for you have stumbled because of your sins. Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.
3 Return to our Father with words ready; say to him: "Take away all our guilt and receive us with grace, that we may offer the fruit of our lips. Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.
4 Assyria will not save us; we will not ride on horses. We will never again say "our gods" to the work of our own hands, for in you the fatherless finds a father's compassion." Asiri akokoka kobikisa biso te ; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso : ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »
5 "I will heal their waywardness; I will love them freely, for my anger has turned away from them. Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.
6 I will be like the dew to Israel; he will blossom like the lily and send down roots like the cedars of Lebanon. Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ; akobimisa fololo lokola lisi, akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.
7 His shoots will spread out; his splendor will be like the olive tree, his fragrance like the cedars of Lebanon. Bitape na ye ekokende mosika, akozala na lokumu lokola nzete ya olive, mpe malasi na ye ekozala lokola malasi ya nzete ya sedele ya Libani.
8 They will return and live in my shade; they will flourish like grain and blossom like the vine, and their renown will be like the wine of Lebanon. Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, bakokola malamu lokola ble, bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.
9 Ephraim, what more have I to do with idols? It is I who answer and watch over you. I am like a flourishing cypress; your fruit comes from me." Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
10 Whoever is wise, let them understand these things; whoever is discerning, let them know them. For the ways of our Father are right, and the righteous walk in them, but the rebellious stumble in them. Nani azali na bwanya mpo na kososola makambo oyo ? Nani azali na mayele mingi mpo na koyeba yango ? Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima : bato ya sembo bakolanda yango, kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]