Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 14 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

2Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo,pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.

3Bobongisa maloba na binompe bozonga epai na Yawe ;boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso,yamba biso na mawa na Yompo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso,na esika ya bangombe.

4Asiri akokoka kobikisa biso te ;tokomata na mpunda ya bitumba tempe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso :‹ Bozali banzambe na biso, ›pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »

5Nakobikisa bango na mabe na bangompe nakolinga bango na motema moko,pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.

6Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ;akobimisa fololo lokola lisi,akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.

7Bitape na ye ekokende mosika,akozala na lokumu lokola nzete ya olive,mpe malasi na ye ekozala lokolamalasi ya nzete ya sedele ya Libani.

8Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye,bakokola malamu lokola ble,bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.

9Efrayimi akoloba :« Banzambe ya bikeko ezali lisusuna tina nini epai na Ngai ? »Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye.Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu,Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.

10Nani azali na bwanyampo na kososola makambo oyo ?Nani azali na mayele mingimpo na koyeba yango ?Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima :bato ya sembo bakolanda yango,kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]