Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 13 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Kufa ya Efrayimi

1Tango Efrayimi azalaki koloba,bato bazalaki kolenga ;azalaki kokonza kati na Isalaele,kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ;yango wana akufaki.

2Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ;na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikekona nzela ya palata na bango balekisa na moto,bililingi oyo babongisa malamu :nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko.Balobaka na tina na bango :« Babonzaka bato lokola bambekampe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »

3Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo,lokola londende ya tongo oyo elimwaka,lokola lititi oyo mopepe ememaka mosikana esika oyo batutelaka ble,mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.

4« Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo,oyo abimisaki yo wuta na Ejipito.Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai,ozali na mobikisi mosusu te.

5Ngai, nayebaki yo kati na esobe,kati na mabele oyo ekawuka.

6Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi,bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.

7Boye, nakokweyela bino lokola nkosimpe nakozela bino na nzela lokola nkoyi.

8Nakolanda bino lokola ngombolooyo ebungisi bana na yangompe nakopasola misuni ya mitema na bino.Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi,bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.

9Isalaele, obebisami ;pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo !

10Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo ?Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonsooyo, na tina na bango, bozalaki koloba :‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli ? ›

11Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi,mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.

12Mabe ya Efrayimi ebombami,mpe masumu na ye ekomami penza.

13Pasi ekomeli yelokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ;kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele,soki tango ya kobotama ekoki,abimaka na libumu ya mama na ye te.

14Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi,nakosikola bango na kufa.Oh kufa, wapi nguya na yo ?Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ?Nakoyokela bango mawa te !

15Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali,mopepe ya este ekoya,mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe :ekokawusa etima ya Efrayimi,ekokawusa liziba na ye.Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talowuta na ebombelo na yango. »

Kobongola motema ememaka lipamboli

14:1Bato ya Samari basengeli kozwa etumbumpo na mabe na bango,pamba te batombokeli Nzambe na bango.Bato bakokufa na mopanga ;bakonyata-nyata babebe na bango,bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]