Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joel 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of our Father that came to Joel son of Pethuel. Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli :
2 Hear this, you elders; listen, all who live in this land. Has anything like this happened in your days, or in the days of your ancestors? — Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka ! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?
3 Tell your children about it, and let your children tell their children, and their children the next generation. Boyebisa yango epai ya bana na bino, mpe tika ete bana na bino bayebisa yango epai ya bana na bango ; mpe bana na bango, na milongo ya bato oyo bakoya na sima.
4 What the cutting locust spared, the swarming locust ate; what the swarming locust spared, the hopping locust ate; and what the hopping locust spared, the destroying locust ate. Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki, mabanki minene elie yango ; oyo mabanki minene etiki, mabanki mike elie yango ; oyo mabanki mike etiki, mabanki mosusu elie yango.
5 Wake up, you drunkards, and weep; wail, all you wine drinkers, over the sweet wine, for it has been cut off from your lips. Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela ; bolela, bino nyonso bameli vino. Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.
6 "For a nation has invaded my land, mighty and beyond number; its teeth are the teeth of a lion, and it has the fangs of a lioness. Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai, ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga motango ya bato na yango. Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali, mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.
7 It has devastated my vines and splintered my fig tree; it has stripped off their bark and cast it aside, leaving their branches bare and white." Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi, elongoli banzete na Ngai nyonso baposo, ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.
8 Wail like a virgin dressed in mourning clothes for the husband of her youth. Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili mpo na kolela mobandami na ye.
9 The grain offering and the drink offering are cut off from the house of our Father; the priests, the ministers of our Father, mourn. Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.
10 The field is devastated, the ground mourns; for the grain is destroyed, the new wine dries up, the oil fails. Bilanga ebebisami, mabele ekawuki, mbuma ya ble ezali lisusu te, vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.
11 Be ashamed, you farmers; wail, you grape growers, over the wheat and the barley, for the harvest of the field has perished. Bino basali bilanga, bozala na soni ; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.
12 The vine is dried up, and the fig tree withers; the pomegranate, the palm, and the apple—all the trees of the field are dried up. Surely joy has withered away from all people. Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.
13 Put on mourning clothes and lament, you priests; wail, you ministers of the altar. Come, spend the night in mourning clothes, you ministers of my Father; for the grain offering and the drink offering are withheld from the house of your Father. Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
14 Declare a fast; call a sacred assembly. Gather the elders and all who live in the land to the house of our Father, and cry out to our Father. Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.
15 Alas for the day! For the day of our Father is near, and it will come like destruction from the Almighty. Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
16 Is not the food cut off right before our eyes—joy and gladness gone from the house of our Father? Boni, wuta na Ndako ya Nzambe mpe na miso na biso, balongoli te bilei, esengo mpe kosepela ?
17 The seeds shrivel in the parched ground; the storehouses are desolate, the granaries are torn down, for the grain has dried up. Bankona ekawuki na se ya mabele, bibombelo etikali lisusu na eloko te, bibombelo ya bambuma ebukani mpo ete ble ezali lisusu te.
18 How the animals groan! The herds of cattle wander in confusion because they have no pasture; even the flocks of sheep suffer. Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.
19 To you, our Father, I call, for fire has devoured the pastures of the wilderness, and flame has burned all the trees of the field. Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela, pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.
20 Even the wild animals cry out to you, for the streams have dried up, and fire has devoured the pastures of the wilderness. Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo, pamba te miluka ekawuki mpe moto ezikisi bilanga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]