Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 8 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Etumbu ya Isalaele

1Tia kelelo na monoko na yo !Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe,mpo ete babebisi boyokani na Ngaimpe batombokeli Mobeko na Ngai.

2Isalaele azali kobelela Ngai :« Oh Nzambe na biso, toyebi Yo ! »

3Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ;yango wana, monguna akolanda ye.

4Batunaki Ngai tetango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi.Bamisalelaki banzambe ya bikekona palata mpe na wolo na bangompo na libebi na bango moko.

5Oh Samari, nzambe na yo ya ekekoya mwana ngombe ya mobali ezali nkele !Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango.Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?

6Ewuti na Isalaele !Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali,ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ;ezali Nzambe te.Bakobuka yango biteni-biteni,mwana ngombe wana ya Samari.

7« Lokola baloni mopepe,bakobuka mopepe ya makasi.Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te.Ezala soki ebimisi mito,ezali bapaya nde bakolia yango.

8Isalaele abebisami ;tala bango wana kati na bikolo,bazali komonana lokola biloko pamba !

9Pamba te bakendeki na Asirilokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko.Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.

10Ata apesaki bakado kati na bikolo,sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika mokompe bakobanda kosila kokufa na se ya minyokoya mokonzi moko ya nguya.

11Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebelempo na kolongola masumu na ye,kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.

12Nakomelaki bangomakambo ebele ya Mobeko na Ngai,kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.

13Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai,mpe bazali kolia misuni ;kasi Yawe azali kosepela na bango te.Sik’oyo, akokanisa mabe na bangompe akopesa bango etumbumpo na masumu na bango :bakozonga na Ejipito.

14Isalaele abosani Mokeli na yempe atongi bandako ya kitoko ;Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ;kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango,mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]